Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwhf lisolo 19
  • Litomba ya masano oyo esalisaka mwana akolisa mayele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Litomba ya masano oyo esalisaka mwana akolisa mayele
  • Lisalisi mpo na libota
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo osengeli koyeba
  • Makambo oyo okoki kosala
  • Biloko ya masano na ntango ya kala mpe lelo oyo
    Lamuká!—2006
  • Nasala nini soki mwana na ngai alɛmbi na ye?
    Lisalisi mpo na libota
  • Mpo na nini ezali na ntina bana bátángaka—Eteni 2: Kotánga na telefone to na mokanda ya papye?
    Lisalisi mpo na libota
  • Nakómi moombo ya baaparɛyi oyo ebimi sika?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
Makambo mosusu
Lisalisi mpo na libota
ijwhf lisolo 19
Bana bazali kotonga ndako ya zelo na libongo wana tata na bango afandi wana.

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Masano oyo esalisaka mwana akolisa mayele

Masano oyo esalisaka mwana akolisa mayele ezali lolenge ya masano oyo elamusaka mposa ya koyeba makambo mingi epai ya mwana, mpe epusaka makanisi na ye mosika. Yango esalaka ete mwana akolisa makoki ya kokanisa mpe akola malamu.

Bandakisa ya masano yango:

  • Kosala ba-dessin

  • Kosala mampa to bagato

  • Kosakana na bana-popi

  • Koyemba

  • Kotonga bandako ya mabele

  • Kosakana na biloko ya mindɔndɔ te (ata bakartɔ ya mpamba oyo basali lokola motuka ekoki kopusa makanisi ya mwana mosika)

Na bamboka mingi, masano ya bana ekómá kaka ya kolekisa ntango to masano oyo babongiselá bango. Bana mingi basakanaka lisusu te na masano oyo ekoki kokolisa mayele na bango.

Yango ezali likama?

  • Makambo oyo osengeli koyeba

  • Makambo oyo okoki kosala

Makambo oyo osengeli koyeba

  • Masano oyo esɛngaka kokanisa esalisaka mwana akola malamu. Yango ekoki kosalisa mwana azala makasi na nzoto mpe na makanisi, lisusu ayeba kofanda ná baninga. Ekoki mpe koteya bana bázalaka motema molai, bázwaka bikateli ya malamu, báyeba kopekisa mayoki na bango, mpe báyokanaka malamu ná baninga ntango bazali kosakana. Na mokuse, masano yango ebongisaka bana mpo na avenir na bango.

  • Kotika bana ntango nyonso na baaparɛyi ekoki kozala likama. Kotikela mwana baaparɛyi ntango nyonso ekoki kokómisa ye moombo na yango, mpe emonani ete yango esalaka ete bana bákóma minene mingi (obésité) mpe nkandankanda. Yango wana, baboti oyo batikelaka bana baaparɛyi mpo bango bázwa ntango ya kosala makambo mosusu basengeli kokeba mpenza.

  • Kotyela mwana liste ya ba-activité ezalaka ntango nyonso malamu te. Soki baboti bazali kobongisela mwana makambo nyonso oyo asengeli kosala, mwana akozala lisusu te na ntango ya kosala makambo na ndenge na ye moko mpo akolisa makoki na ye ya kokanisa.

Makambo oyo okoki kosala

  • Pesá mwana mabaku ya kosala makambo oyo ekosalisa ye akolisa mayele. Soki libaku emonani, tiká mwana asakana libándá mpo amesana na biloko oyo Nzambe akelá. Pesá ye mwa misala ya bongobongo mpe tiká ye asakana na biloko oyo ekotinda ye akanisa.a

    Omituna: Bizaleli nini ya malamu mwana na ngai akokóma na yango soki amipesi na masano oyo ekolisaka mayele? Ndenge nini yango ekoki kosalisa ye soki akómi mokóló?

    Toli ya Biblia: “Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba.”​​—1 Timote 4:8.

  • Kotala TV to kosalela baaparɛyi. Kanisá malamu liboso ya kotika mwana na yo alekisa ntango na telefone, tablɛti, to televizyo. Minganga ya bana bamonisi ete bana oyo bazali na nse ya mbula mibale basengeli te kotalaka ba-écran, mpe baoyo bazali na mbula mibale tii mitano basengeli te kotalaka ba-écran koleka ngonga moko na mokolo.

    Omituna: Ntango boni mwana na ngai asengeli kozala liboso ya ba-écran? Nasengeli kozala na ye ntango azali kotala yango? Ezali na eloko mosusu oyo akoki kosala na esika asalela baaparɛyi?

    Toli ya Biblia: “Bókeba mpenza ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, bósalela ntango na bino malamu mpenza.”​​—Baefese 5:15, 16.

  • Ba-activité oyo ebongisamá eleka mingi te. Ezali solo ete yango ekoki kosala ete mwana akóma na makoki mingi na likambo moko to mpe na lisano moko boye. Nzokande, mbala mingi, ba-activité oyo ebongisamá soki eleki mingi ememaka mitungisi, kaka epai ya mwana te, kasi mpe epai ya baboti oyo basengeli komemaka ye na bisika ya ba-activité yango. Na ntembe te, toli ya Baefese 5:15, 16 oyo elobeli kosalela ntango malamu eyokani mpe na likambo yango.

    Omituna: Natondiselá mwana na ngai ba-activité mingi oyo ebongisamá? Soki ezali bongo, makambo nini tokoki kobongisa?

    Toli ya Biblia: “Bóluka mpenza koyeba makambo oyo eleki ntina.”​—Bafilipi 1:10.

a Ba-jouet mingi ya bana etikelaka bango nzela te bápusa makanisi na bango mosika. Nzokande, soki bana bazali kosakana na biloko lokola ndako ya bakarto, mituka ya manzanza, babusho mpe biloko mosusu ya ndenga wana, ekosalisa bango bákolisa makoki na bango ya kokanisa.

Bozongeli: Ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo azwa matomba na kosakana?

  • Pesá mwana mabaku ya kosala makambo oyo ekosalisa ye akolisa mayele. Tiká ye asalaka makambo oyo ekotinda ye akanisa.

  • Azalaka te ntango nyonso liboso ya TV to baaparɛyi. Kanisá malamu liboso ya kotikela mwana baaparɛyi mpo yo ozwa ntango ya kosala makambo mosusu.

  • Ba-activité oyo ebongisamá eleka mingi te. Soki makambo ya kosala eleki mingi, yango ebakisaka mpe mitungisi, ezala epai ya mwana to baboti.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto