LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA
Ndenge ya kozala tata ya malamu
Na lisolo oyo
Mokumba ya tata ezali nini?
Liboso mwana abotama. Lolenge ya mobali oyo ozali lelo, emonisi lolenge ya tata oyo okozala na mikolo ezali koya. Buku moko Do Fathers Matter? elobi boye:
“Mbala mingi, batata oyo basalisaka basi na bango oyo bazali na zemi na kosomba biloko, kokende kotika bango epai ya minganga, kokende kotika bango mpo na kosala échographie, batata ya ndenge wana basalisaka mingi basi na bango mpe bana ntango babotami.”
“Nalingaki te mwasi na ngai amona lokola nde natikaki ye moko na mokumba na ye ya zemi, yango wana, nazalaki kosala nyonso oyo esengeli mpo na kosalisa ye. Ezala mbeto ya bebe, tozalaki kobongisa yango biso mibale. Ezalaki eleko moko ya ntina mingi ntango tozalaki komibongisa mpo na kobotama ya bebe na biso.”—James.
Toli ya Biblia: “Bóluka kaka matomba na bino moko te, kasi mpe matomba ya basusu.”—Bafilipi 2:4.
Nsima ya kobotama ya mwana. Okoki kokómisa makasi boyokani na yo ná bebe na yo soki ozali kosakana na ye mpe komema ye. Pesá mabɔkɔ mpo na kosalisa bebe. Yango ekosala ete bebe akola malamu mpenza. Makambo oyo ozali kosala mpo ozala na boyokani ya malamu ná bebe na yo emonisi ete ozwaka ye na motuya mingi.
“Mikitisa na nivo ya mwana na yo. Sakanáká ná ye, kozala makambo makasimakasi te. Komizwaka na valɛrɛ mingi te. Kobosana te ete, bolingo oyo ozali komonisela mwana na yo, ekosala ete ye mpe alinga yo.”—Richard.
Toli ya Biblia: “Bana bazali libula oyo euti na Yehova; mbuma ya libumu ezali mbano.”—Nzembo 127:3.
Ntango mwana azali kokola. Bolukiluki emonisi ete bana oyo bazalaka na boyokani ya malamu ná batata na bango, mbala mingi bazalaka mayele na kelasi, banyokwamaka te na makanisi, ezalaka mpasi básalela drɔgɛ, mpe bazalaka na bizaleli ya malamu. Zwáká ntango oyo esengeli mpo na kokolisa boyokani ya malamu elongo na mwana na yo.
“Mwana na ngai ya mobali ayebisaki ngai ete eloko oyo ekozanga ye mpenza ntango akolongwa na ndako, ezali masolo oyo tozalaki kobɛta ntango tozalaki kosala mobembo na motuka mpe kolya. Masolo mosusu ya ntina mingi koleka oyo tozalaki kobɛta ezalaki koya na ntango oyo nazalaki komizela na yango te. Masolo yango ezalaki koya mpo tozalaki kolekisa ntango mingi elongo.”—Dennis.
Toli ya Biblia: “Bókeba mpenza ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, bósalela ntango na bino malamu mpenza.”—Baefese 5:15, 16.
Mpo na nini mokumba ya tata ezali na ntina mingi?
Eyabani ete batata bakokisaka bamposa ya mosuni ya mabota na bango mpe babatelaka yango, mpe mbala mingi bamama bakokisaka bamposa ya mayoki ya bana na bango. (Kolimbola Mibeko 1:31; Yisaya 49:15) Na mabota mosusu, mikumba yango ekoki kobongwana mpo na tata to mama. Atako bongo, bato oyo basalaka bolukiluki balobi ete bango nyonso mibale bazali na ntina mingi na kati ya libota.a
Judith Wallerstein, moto moko ya mayele na makambo ya libota alobeli likambo oyo akutanaki na yango oyo emonisi bosolo ya likambo yango. Akomaki boye: “Ntango motuka etutaki mwana na ngai ya mwasi oyo azali na mbula 12, mposa ya mwana na ngai ezalaki ete tata na ye amata na ambulance mpo azalaki na kondima ete tata na ye akobatela ye malamu. Na nsima, ntango tokómaki na lopitalo, alingaki ete nafanda mokolo mobimba pene na ye mpo na kobɔndisa ye.”b
“Tata akoki kosalisa libota mpe kobatela yango na ndenge oyo ekoki kozala mpasi mama asala yango ye moko. Na ngámbo mosusu, mama asalisaka bana na ye mpo bámiyoka ete balingaka bango, ayokaka bango na likebi mpe amityaka na esika na bango. Bango nyonso mibale bapesanaka mabɔkɔ mpo na kobɔkɔla bana.”—Daniel.
Toli ya Biblia: “Mwana na ngai, yoká disiplini ya tata na yo, mpe kotika te mateya ya mama na yo.”—Masese 1:8.
Tata mpe bana ya basi
Lokola ozali tata, oteyaka mwana na yo ya mwasi ndenge oyo mibali basengeli kosalela ye makambo. Akoyekola yango na makambo mibale oyo elandi:
Ntango azali kotala ndenge ozali kosalela mama na ye makambo. Soki ozali kolinga mwasi na yo mpe komonisela ye limemya, mwana na yo ya mwasi akomona bizaleli nini asengeli koluka epai ya mobali ntango alingi kobala.—1 Petro 3:7.
Ntango azali kotala ndenge ozali kosalela ye makambo. Soki ozali komonisela mwana na yo ya mwasi limemya, ozali koteya ye ayeba ndenge ya komipesa nzoto kilo. Akomizela mpe ete mibali mosusu mpe basalelaka ye makambo ndenge wana.
Nzokande, soki ozali kokoba kolobela ye mabe, yango ekosala amimona ete azali na ntina te mpe yango ekoki kotinda ye aluka ete andimama epai ya mibali mosusu mpe mibali yango bakoki kozala na makanisi ya malamu te.
“Ezalaka mpasi mpo na mwana mwasi oyo tata na ye alingaka ye mpe asalisaka ye, asepela na mwana mobali oyo azali te na bizaleli oyo ebongi mpo na mobali ya malamu.”—Wayne.
a Bamama mingi babɔkɔlaka bana na bango kozanga lisalisa ya mibali na bango.
b Euti na buku The Unexpected Legacy of Divorce.