Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mrt lisolo 36
  • Mikakatano ya nkita ekosila mokolo mosusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikakatano ya nkita ekosila mokolo mosusu?
  • Makambo mosusu
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mikakatano ya nkita oyo Nzambe akosilisa
  • Mosika te, moto moko te akozala lisusu mobólá!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Bobola
    Lamuká!—2015
  • Landá ndakisa ya Yesu mpe monisá ete omibanzabanzaka mpo na babola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Ndenge ya kosilisa bobola mpo na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Makambo mosusu
mrt lisolo 36
Mobali moko atɛlɛmi na kartye moko ya babola mpe azali kotala ndako moko ya kitoko makasi mpe ya molai.

Mikakatano ya nkita ekosila mokolo mosusu?

Na bamboka ndenge na ndenge, bato bazali kotomboka na babalabala mpo bazali komona ete makambo ya nkita ezali kotambwisama na bosembo te. Mikakatano yango ekómaki lisusu makasi na eleko ya maladi mabe ya coronavirus, oyo esalaki ete bato bázala na esengo te, bábima lisusu te na bandako na bango, bázanga biloko mosusu ya ntina, mpe bázwa te lisalisi ya malamu ya monganga. Kasi ezalaki bongo te mpo na bazwi, yango emonisaki mpenza bokeseni makasi oyo ezali kati na bazwi mpe babola.

Mikakatano ya nkita oyo ezali konyokola bato ekosila mokolo mosusu? Ɛɛ. Biblia elobeli makambo oyo Nzambe akosala mpo na kosilisa mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo oyo.

Mikakatano ya nkita oyo Nzambe akosilisa

Mokakatano: Bato balongi te kotya nkita oyo ezali kokokisa bamposa ya bato nyonso.

Solisyo: Nzambe akolongola baguvernema ya bato mpe akotya guvernema na ye na esika na yango, guvernema yango ebengami Bokonzi ya Nzambe. Ekoyangela likoló mpe mabele mobimba.​—Danyele 2:44; Matai 6:10.

Litomba: Lokola Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele mobimba, ekotambwisa makambo na lolenge eleki malamu mpenza. Babola bakozala lisusu te mpe bato bakomitungisa te mpo na mikakatano ya nkita. (Nzembo 9:7-9, 18) Kutu, bakosepela na mosala na bango mpe bakozala na esengo elongo na mabota na bango. Biblia epesi elaka oyo: “Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te.”​—Yisaya 65:21, 22.

Mokakatano: Bato bakoki te kopekisa makambo oyo ememelaka bango mikakatano mpe oyo esalaka ete bázanga biloko oyo bazali na yango mposa na bomoi.

Solisyo: Na nzela ya Bokonzi na ye, Nzambe akolongola makambo nyonso oyo esalaka ete bato bázala na kobanga mpe na kimya te.

Litomba: Na nse ya Bokonzi ya Nzambe, bato bakokutana lisusu te na makambo oyo esalaka ete bábungisa biloko oyo bango moko mpe mabota na bango bazali na yango mposa mpo na kobikela. Na ndakisa, bitumba, nzala, mpe bamaladi mabe ekozala lisusu te. (Nzembo 46:9; 72:16; Yisaya 33:24) Nzambe alobi boye: “Bato na ngai bakofanda mpenza na esika ya kimya mpe na bisika ya kofanda oyo moto akobanga ata moke te mpe na bisika ya kopema oyo ezangi mitungisi.”​—Yisaya 32:18.

Mokakatano: Bato ya lokoso mpe oyo balukaka kaka matomba na bango moko basalelaka basusu makambo na kozanga bosembo.

Solisyo: Bato oyo bakozala na nse ya Bokonzi ya Nzambe bakoyekola ndenge ya komonisela basusu bolingo na esika ya kotya matomba na bango moko na esika ya liboso.​—Matai 22:37-39.

Litomba: Na nse ya Bokonzi ya Nzambe, moto nyonso akomonisa bolingo oyo Nzambe azalaka na yango, oyo “elukaka matomba na yango moko te.” (1 Bakorinti 13:4, 5) Biblia elobi boye: “Bakosala eloko moko te ya mabe mpe bakobebisa eloko moko te na ngomba mosantu na ngai mobimba; mpo mabele ekotonda na boyebi ya Yehovaa ndenge mai etondi na mbu.”​—Yisaya 11:9.

Biblia emonisi ete mokili oyo ekómi na nsuka mpe mosika te Nzambe akokokisa elaka na ye ya kosilisa mikakatano nyonso na makambo etali nkita.b (Nzembo 12:5) Liboso ete makambo yango esalema, mitinda ya Biblia ekoki kosalisa yo olonga mikakatano ya nkita sikoyo. Na ndakisa, talá masolo “Okosala nini soki ozali lisusu na mbongo mingi te?” mpe “Kotalela mbongo na ndenge ebongi.”

Likanisi ya libunga na oyo etali Biblia mpe nkita

Likanisi ya libunga: Bobola ekosila te, mpo Yesu alobaki: “Bozali na babola ntango nyonso.”​—Matai 26:11.

Likanisi ya solo: Yesu alobaki kaka likambo oyo ezali solo: Ntango nyonso mokili oyo ya kozanga bosembo ekozala, babola mpe bakozala kaka. Kasi, likambo oyo Yesu alobaki ezalaki ‘nsango malamu epai ya babola,’ ezala mpe elaka ya Nzambe ya kosilisa bobola mpo na libela na nse ya Bokonzi na ye.​—Luka 4:18, 43.

Likanisi ya libunga: Bato oyo balingaka kosepelisa Nzambe basengeli kozala babola, mpo Yesu alobaki: “Kende kotɛka biloko na yo mpe pesá babola.”​—Matai 19:21.

Likanisi ya solo: Na maloba wana, Yesu azalaki te kotyela bayekoli na ye mibeko na ndenge ya bomoi oyo basengeli kozala na yango. Azalaki nde kopesa malako ya sikisiki epai ya elenge mobali oyo atikaki ete bozwi elongola likebi na ye na makambo eleki ntina. Yesu alendisaki mobali yango akóma na bomoi oyo ezangi mindondo mpe andima libyangi ya kokóma moyekoli na ye.

Likanisi ya libunga: Nzambe apambolaka bato na ndenge akómisaka bango bazwi, mpo Biblia elobi: “Lipamboli ya Yehova​—yango nde ekómisaka moto mozwi.”​—Masese 10:22.

Likanisi ya solo: Na Biblia, “lipamboli ya Yehova” emonisaka bozwi na elimo. Na ndakisa, bomoi oyo ezali na ntina, kozala na boyokani ya malamu ná Nzambe, mpe kozala na elikya mpo na mikolo ezali koya. (Nzembo 25:14; Yoane 17:3) Nzambe apambolaki basaleli na ye mosusu mpe apesaki bango bozwi, kasi bato mingi oyo bakómaki bakristo bazalaki bazwi te. (Ebandeli 24:34, 35; Yakobo 2:5) Kutu, Yesu Kristo azalaki kaka na biloko moke ya kobikela.​—Matai 8:20.

Likanisi ya libunga: Biblia eteyaka likanisi ya Bakoministe, ndenge elobaki mpo na bakristo ya siɛkle ya liboso ete: “Bazalaki kotya biloko nyonso lisangá, mpe bazalaki kotɛka biloko na bango mpe bozwi na bango.”​—Misala 2:44, 45.

Likanisi ya solo: Bavɛrsɛ oyo ezali kolobela ebongiseli oyo bazwaki mpo na mwa ntango mpo na kokokisa bamposa ya mosuni ya bakristo oyo bazwaki batisimo sika. Bakristo yango basalaki mobembo na Yerusaleme mpo na koyangana na fɛti ya Pantekote ya Bayuda. (Misala 2:5) Kasi, ntango bakómaki bakristo, batikalaki na Yerusaleme mpe baumelaki kuna koleka ndenge bakanaki mpo na koyekola makambo mingi oyo etalaki kondima na bango ya sika. Yango etindaki bandeko na bango bakristo bapesa biloko oyo bazalaki na yango mpo na kopesa bandeko na bango bilei mpe bisika ya kofanda.​—Misala 2:41, 42, 46, 47.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.​—Nzembo 83:18.

b Mpo na koyeba ntina oyo osengeli kotyela Biblia motema, talá lisolo “Biblia​—Buku oyo ebongi kotyela motema.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto