Anton Petrus/Moment via Getty Images
BÓSƐNZƐLAKA!
Etumba ya mokili mobimba ekosalema lisusu?—Biblia elobi nini?
Na bambula 30 oyo eleki, bato mingi bamonaki ete boyokani ya malamu ezalaki kati na mikili mingi mpe kutu likambo ya kobanga ezalaki mpenza lisusu te. Nzokande, makambo oyo ezali kosalema sikoyo na mokili emonisi ete ntina ya kobanga ezali.
“Wana bato bazali kobanga ete bitumba ya Gaza epanzana na bikólo mosusu, ekólo Israël mpe Hezbollah esí ebandi kobɛtana mindoki na bandelo ya ekólo Liban.”—Reuters, 06/01/2024.
“Ekólo Iran, oyo ezali sikoyo kobongisa bibundeli minene ya nikleere mpe kopesa mabɔkɔ na bikólo mosusu mpo na bitumba, ezali kobangisa bikólo mingi ya Occident. Lisusu, mbala oyo Chine ná Russie bazali na ngámbo na ye.”—The New York Times, 07/01/2024.
“Russie ezali kokoba kopunza na Ukraine.”—UN News, 11/01/2024.
“Nkita mpe bibundeli ya Chine ezali komata se komata, Taïwan ezali kokoba kobundeli ntomo na yango, Chine ná États-Unis kobendana ezali kokoba, nyonso wana elakisi ete kondongwana ezali mosika te.”—The Japan Times, 09/01/2024.
Biblia elobi nini mpo makambo ya kobangisa oyo ezali koleka na mokili mobimba? Yango ekobimisa etumba ya mokili mobimba?
Biblia esakolaki makambo oyo ezali koleka na mokili
Biblia esakolaki te moko ya bitumba kati na bitumba oyo ezali kosalema lelo na mokili. Kasi, esakolaki ndende bitumba ekozala mingi na ntango na biso mpe yango ekosala ete “kimya na mabele” ezala te—Emoniseli 6:4.
Mokanda ya Danyele esakolaki ete “na ntango ya nsuka,” bikólo ya nguya ‘ekotindikana’ to koluka kokonza moninga. Bikólo yango ekoluka mpe kolakisa na bikólo mosusu bibundeli na yango ya nsɔmɔ mpe kobimisa “biloko ya motuya,” to mbongo mingi mpo na kosomba mindoki.—Danyele 11:40, 42, 43.
Etumba nini tozali kozela?
Biblia emonisi ete makambo ekobeba makasi liboso mokili ebonga. Yesu asakolaki ete “ekozala na bolɔzi [to mpasi] moko monene oyo esalemá naino te banda ebandeli ya mokili.” (Matai 24:21) “Bolɔzi” yango ekomema na etumba oyo babengi Armagedone, oyo elobelami lokola “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”—Emoniseli 16:14, 16.
Likambo ya esengo, Armagedone ekobikisa nde bato. Na nzela ya etumba yango, Nzambe akotya nsuka na bokonzi ya bato ya mokili, oyo ebomisi ebele ya bato na bitumba. Mpo na komona ndenge Armagedone ekopesa bato kimya ya libela, tángá masolo oyo elandi: