cako74/DigitalVision Vectors via Getty Images
BÓSƐNZƐLAKA!
Mobulu na makambo ya politiki—Biblia elobi nini?
Makambo ya mobulu oyo bazali kosalela bakonzi ya politiki ekómi mingi.
Mpo na nini mobulu ekómi mingi boye na makambo ya politiki? Makambo ya mobulu yango ekosila mokolo mosusu? Biblia elobi nini?
Biblia esakolaki ete bato bakokabwana mpo na politiki
Biblia esakolaki ete na eleko na biso, oyo ebengi yango “mikolo ya nsuka,” bato mingi bakozala na bizaleli oyo ekobimisa mobulu mpe kozanga koyokana.
“Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala . . . bato oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, . . . oyo balingaka kosala boyokani te, . . . bato ya nko, . . . oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo.”—2 Timote 3:1-4.
Biblia esakolaki mpe ete makambo ya mobulu, na ndakisa, kotombokela bakonzi ya guvɛrnema mpe yikiyiki na makambo ya politiki ekokóma mingi na mikolo na biso. (Luka 21:9, maloba na nse ya lokasa) Kasi, yikiyiki na makambo ya politiki mpe bokabwani ekoumela libela te.
Mobulu na makambo ya politiki ekosila
Biblia elobi ete Nzambe akolongola baguvɛrnema nyonso ya bato mpe akotya guvɛrnema na ye oyo ezali na likoló.
“Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo . . . ekobukabuka makonzi yango nyonso mpe ekosukisa yango, mpe yango moko ekotikala mpo na libela.”—Danyele 2:44.
Bokonzi ya Nzambe ekosala ete bato bázala na bomoko mpe ekotya kimya na mokili mobimba.
Mokonzi na yango, Yesu Kristo, abengami “Nkumu ya Kimya,” akosala ete ‘kimya ezala na nsuka te.’—Yisaya 9:6, 7.
Ata mpe sikoyo, baoyo bokonzi yango ezali koyangela bazali koyekola ndenge ya kofanda na kimya. Yango wana Biblia elobi ete: “Bakokómisa mipanga na bango bitimweli ya mabele mpe makɔnga na bango makwangola ya kokata matiti. Ekólo moko ekotombola mopanga te mpo na kobunda na ekólo mosusu, bakoyekola mpe etumba lisusu te.”—Yisaya 2:3, 4.
Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá lisolo “Bokonzi ya Nzambe ekosala nini?” mpe talá video Bokonzi ya Nzambe ezali nini?