Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 72
  • Mokanda ya Emoniseli elimboli nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Emoniseli elimboli nini?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Bózala batangi ya esengo ya mokanda ya emoniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Emoniseli—Tozali na esengo na komona kokokana na yango!
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Makambo masengeli kobima noki
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • “Nsango ya esengo” na mokanda ya emoniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 72
Moto azali kotánga mokanda ya Emoniseli mpe azali komona na makanisi nyama mabe mpe bampunda minei ya Emoniseli

Mokanda ya Emoniseli elimboli nini?

Eyano ya Biblia

Nkombo ya mokanda Emoniseli, na Grɛki Apokalupsis (apocalypse), elimboli “kobimisa polele” to “koyebisa nsango.” Emonisi ntina ya mokanda yango: kobimisa makambo oyo ebombaná mpe koyebisa makambo oyo esengelaki kosalema bambula mingi nsima ya kokomama na yango. Makambo mingi oyo mokanda yango elobeli ekokisami naino te.

Makambo oyo mokanda ya Emoniseli elobeli

  • Maloba ya ebandeli.​—Emoniseli 1:1-9.

  • Bansango oyo Yesu atindelaki masangá nsambo.​—Emoniseli 1:10–3:22.

  • Emonaneli ya kiti ya bokonzi ya Nzambe na likoló.​—Emoniseli 4:1-11.

  • Bimonaneli ndenge na ndenge, oyo elandaná:

    • Bilembo nsambo.​—Emoniseli 5:1–8:6.

    • Kelelo nsambo; misato ya nsuka esakoli makambo misato ya mawa.​—Emoniseli 8:7–14:20.

    • Mabakuli nsambo, oyo mokomoko ezali komonisa etumbu oyo Nzambe akotinda na mabele.​—Emoniseli 15:1–16:21.

    • Bimonaneli oyo emonisi ndenge banguna ya Nzambe bakobebisama.​—Emoniseli 17:1–20:10.

    • Bimonaneli oyo elobeli mapamboli ya Nzambe mpo na likoló mpe mabele.​—Emoniseli 20:11–22:5.

  • Maloba ya nsuka.​—Emoniseli 22:6-21.

Mwa lisalisi mpo na kokanga ntina ya mokanda ya Emoniseli

  1. Bato oyo basalelaka Nzambe bamonaka ete Emoniseli elobeli makambo ya malamu, kasi te makambo ya kobangisa to ya nsɔmɔ. Bato mingi bamonaka ete liloba “apocalypse” elimboli likama moko monene; kasi banda na ebandeli tii na nsuka na yango, mokanda ya Emoniseli elobi ete baoyo bazali kotánga nsango na yango, kokanga ntina, mpe kosalela yango, bakozala na esengo.​—Emoniseli 1:3; 22:7.

  2. Emoniseli esaleli “bilembo” ebele oyo ezali nde maloba ya elilingi.​—Emoniseli 1:1.

  3. Mikanda mosusu ya Biblia elobelá bato, biloko, mpe bilembo mingi oyo mokanda ya Emoniseli mpe elobeli; na ndakisa:

    • Yehova: azali “Nzambe ya solo kuna na likoló” mpe Mozalisi ya biloko nyonso.​—Kolimbola Mibeko 4:39; Nzembo 103:19; Emoniseli 4:11; 15:3.

    • Yesu Kristo: azali “Mwana-Mpate ya Nzambe.”​—Yoane 1:29; Emoniseli 5:6; 14:1.

    • Satana Zabolo: azali monguna ya Nzambe.​—Ebandeli 3:14, 15; Yoane 8:44; Emoniseli 12:9.

    • Babilone Monene: ezali monguna ya Yehova mpe ya basaleli na ye, esika mateya ya lokuta eutá, ndenge moko na Babilone (Babele) ya kala.​—Ebandeli 11:2-9; Yisaya 13:1, 11; Emoniseli 17:4-6; 18:4, 20.

    • “Mbu”: ezali bato mabe oyo bapesá Nzambe mokɔngɔ.​—Yisaya 57:20; Emoniseli 13:1; 21:1.

    • Biloko oyo bazalaki kosalela na tabernakle ya kala mpo na losambo ya Nzambe: na ndakisa sanduku ya kondimana, mbu ya talatala (saani monene mpo na kosukola), miinda, makabo ya mpaka ya malasi, mpe etumbelo ya mbeka.​—Kobima 25:10, 17, 18; 40:24-32; Emoniseli 4:5, 6; 5:8; 8:3; 11:19.

    • Banyama mabe: elimboli baguvɛrnema ya bato.​—Danyele 7:1-8, 17-26; Emoniseli 13:2, 11; 17:3.

    • Mitángo oyo basaleli na ndenge ya elilingi.​—Emoniseli 1:20; 8:13; 13:18; 21:16.

  4. Bimonaneli yango etali “mokolo ya Nkolo,” oyo ebandaki na 1914, ntango Bokonzi ya Nzambe etyamaki mpe Yesu akómaki Mokonzi. (Emoniseli 1:10) Na yango, tokoki kozela ete makambo oyo mokanda ya Emoniseli elobeli ekokisama mingimingi na ntango na biso.

  5. Mpo na kokanga ntina ya mikanda mosusu ya Biblia, tosengeli kozala na bwanya oyo euti na Nzambe mpe kondima ete bato oyo bakangá ntina na yango básalisa biso; ezali mpe bongo mpo na mokanda ya Emoniseli.​—Misala 8:26-39; Yakobo 1:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto