Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 49
  • Kopona miziki ezali mpenza na ntina?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kopona miziki ezali mpenza na ntina?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Matomba
  • Mitambo
  • Nakoki kosala nini mpo nakóma te moombo ya miziki?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Ndenge nini okoyoka esengo ya miziki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Bomibatela na miziki ya mbindo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Miziki ekoki mpenza kosala ngai mabe?
    Lamuká!—1993
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 49
Elenge mwasi oyo azali koyoka miziki na aparɛyi na ye

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Kopona miziki ezali mpenza na ntina?

“Soki nalamuki na ntɔngɔ, natyaka miziki. Soki nakɔti na motuka, natyaka miziki. Na ndako, soki nazali kozwa mwa mopepe, nazali kotya bopeto, ata mpe kotánga natyaka kaka miziki. Nayokaka miziki ntango nyonso.”​—Carla

Yo mpe osepelaka na miziki lokola Carla? Soki ezali bongo, lisolo oyo ekosalisa yo ozwa matomba oyo miziki ememelaka moto, okima mitambo na yango mpe oyeba kopona miziki.

  • Matomba

  • Mitambo

  • Makambo bilenge mosusu balobi

Matomba

Tokoki kokokanisa koyoka miziki na kolya bilei. Ezala miziki to bilei soki ezali ya malamu mpe na mezire oyo ebongi ekoki kozala na litomba mpo na yo. Kanisá naino:

  • Miziki ekoki kobakisela yo esengo.

    “Soki nazali na esengo te, natyaka miziki oyo nalingaka mpe mbala moko ekitisaka ngai motema.”​—Mark.

  • Miziki ekoki kosala ete okanisa makambo eleká.

    “Mbala mingi, nzembo moko ekoki kosala ete nakanisa makambo ya malamu oyo eleká, yango wana soki nayoki miziki yango nasepelaka.”​—Sheila

  • Miziki ekoki mpenza kosangisa bato.

    “Nazalaki na liyangani moko ya monene ya Batatoli ya Yehova oyo esangisaki bikólo ebele mpe ntango bayangani bayembaki nzembo ya nsuka, mai ya miso ebimaki ngai. Tozalaki koloba monɔkɔ moko te kasi miziki esangisaki biso.”​—Tammy.

  • Miziki ekoki kosalisa yo okóma na bizaleli malamu.

    “Koyekola kosalela ebɛtɛli moko ya miziki esalisaka moto amipesa disiplini moko boye mpe akóma motema molai. Koyekola yango ezwaka ntango. Mpo oyeba kosalela yango malamu, esɛngi komekameka.”​—Anna.

Oyebaki yango? Na Biblia, mokanda ya Nzembo nde eleki molai mpe ezali na banzembo 150.

Elenge mobali oyo azali kotala bapɔmɛ oyo ebebá

Ponáká miziki kaka ndenge oponaka biloko ya kolya

Mitambo

Ndenge moko na bilei oyo ebebi, miziki mosusu ekoki kozala pwazɔ. Tótala mpo na nini tolobi bongo.

  • Banzembo mingi elobelaka polele likambo ya kosangisa nzoto.

    “Emonani lokola ete banzembo nyonso oyo eyebani mingi elobelaka kosangisa nzoto. Ezalaka lisusu likambo ya nsɔni te.”​—Hannah.

    Biblia elobi boye: “Pite mpe mbindo ya ndenge nyonso to lokoso etángama ata kotángama te na kati na bino.” (Baefese 5:3) Omituna boye, ‘miziki oyo nayokaka epekisaka ngai kotosa toli yango?’

  • Miziki mosusu ekoki kosala ete oyoka mawa makasi.

    “Na mbeto na ngai na butu, na bantango mosusu nalalaka te mpo na koyoka miziki oyo etindaka ngai nakanisa makambo oyo etungisaka mpe elɛmbisaka ngai nzoto. Miziki ya mawa ekoki kozongisa makanisi ya mabe na motó na ngai.”​—Tammy.

    Biblia elobi boye: “Koleka biloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo.” (Masese 4:23) Omituna boye, ‘miziki oyo nayokaka etindaka ngai nakanisa makambo ya mabe?’

  • Miziki mosusu ekoki kotinda yo osilika.

    “Miziki oyo etindaka moto asilika, amimona ete azangi ntina mpe ayina bato ezalaka likama mpo na ngai. Namonaki ete esengo ezalaki kosila ngai soki nayoki miziki ya bongo. Bato ya libota na ngai mpe bamonaki bongo.”​—John.

    Biblia elobi boye: “Bólongola makambo oyo nyonso mosika na bino: nkɛlɛ, nkanda, mabe, maloba ya kofinga, mpe maloba ya nsɔni na monɔkɔ na bino.” (Bakolose 3:8) Omituna boye, ‘miziki oyo nayokaka etindaka ngai nakóma nkandankanda to mafumafu’?

Na mokuse: Ponaká. Yango nde elenge moko na nkombo Julie asalaka. Alobi boye: “Nalandelaka ntango nyonso miziki na ngai mpe nalongolaka miziki nyonso oyo namoni ete ezali mabe. Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, kasi nayebi ete kosala bongo ezali malamu.”

Elenge mwasi moko na nkombo Tara azali komeka kosala mpe bongo. Alobi boye: “Na bantango mosusu batyaka miziki moko na radio, oyo ebɛtisi ngai motema, kasi na nsima soki nayoki maloba na yango, namonaka ete ebongi nalongola yango. Kosala bongo ezali lokola kobwaka gato ya kitoko oyo okati na mino kaka mbala moko! Kasi soki nazwi makasi ya koboya nzembo moko oyo elobeli kosangisa nzoto, nakozwa mpe makasi ya koboya kosangisa nzoto liboso ya kobala. Nalingi te komona mpamba makambo oyo miziki ekoki kosala na bomoi na ngai.”

MAKAMBO BILENGE MOSUSU BALOBI

Abigail

“Miziki ekoki mpenza kosala ete tóyoka mawa, nkanda to esengo mpe soki tokebi te, miziki oyo toyokaka ekoki kobebisa biso kozanga tóyeba ete tokangami na motambo.”​—Abigail.

Robert

“Ata nzembo oyo oyoki kaka mbala mibale to misato ekoki kotikala na bɔɔngɔ na yo libela. Boye, ezali malamu koboya mbala moko nzembo oyo omoni ete ezali mabe. Soki te, ekotikala na bɔɔngɔ na yo.”​—Robert.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto