Elembo ya “mikolo ya nsuka” to ‘ntango ya nsuka’ ezali nini?
Eyano ya Biblia
Biblia elobeli ndenge makambo mpe bizaleli ya bato ekozala na “eleko ya nsuka ya mokili” to “suka ya mokili.” (Matai 24:3; Bible na Lingala ya lelo oyo) Biblia ebengi eleko yango “mikolo ya nsuka” to “ntango ya nsuka.”—2 Timote 3:1; Danyele 8:19.
Bisakweli nini Biblia elobeli mpo na “mikolo ya nsuka”?
Biblia esakolaki makambo mingi oyo ekozala “elembo” ya mikolo ya nsuka. (Luka 21:7) Tótalela mwa ndambo na yango:
Bitumba na bisika mingi. Yesu alobaki: “Ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi.” (Matai 24:7) Ndenge moko mpe, Emoniseli 6:4 elobeli motambwisi-mpunda moko ya elilingi oyo azali komonisa bitumba oyo “ekolongola kimya na mabele.”
Nzala. Yesu alobaki: “Nzala ekozala.” (Matai 24:7) Mokanda ya Emoniseli elobeli motambwisi-mbunda mosusu oyo azali kotambola mpe azali kobimisa nzala na bisika mingi na mokili.—Emoniseli 6:5, 6.
Koningana makasi ya mabele. Yesu alobaki ete “koningana ya mabele ekosalema na bisika ndenge na ndenge.” (Matai 24:7; Luka 21:11) Koningana wana makasi ya mabele ekobimisa mpasi mpe bato mingi bakobungisa bomoi na ndenge oyo esalemá naino te.
Maladi. Yesu amonisaki ete baepidemi to “bamaladi mabe” ekozala mingi—Luka 21:11.
Mobulu. Atako mobulu ebandá kala, Yesu alobaki ete na mikolo ya nsuka “kobuka mibeko ekokóma mingi.”—Matai 24:12.
Kobebisama ya mabele. Emoniseli 11:18 elobi ete bato ‘bakobebisa mabele.’ Bazali kosala yango na balolenge mingi, kaka te na mobulu mpe makambo ya mabe, kasi mpe na ndenge bazali kobebisa mai, mopɛpɛ, bazamba, mpe bongo na bongo.
Kobebisama ya bizaleli ya bato. Na 2 Timote 3:1-4, Biblia esakolaki ete bato mingi bakozala bato oyo ‘bazangá botɔndi, bazangá bosembo, . . . oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo.” Bizaleli yango ya mabe ekokóma makasi na boye ete eleko yango ekobengama “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.”
Bokabwani na mabota. Na 2 Timote 3:2, 3, Biblia elobaki ete bato mingi bakozanga bolingo na kati ya libota mpe bana bakotosa baboti na bango te.
Bato bakolinga lisusu Nzambe te. Yesu alobaki: “Bolingo ya bato mingi ekokita.” (Matai 24:12) Yesu alingaki komonisa ete bolingo ya bato mingi mpo na Nzambe ekokita. Ndenge moko mpe 2 Timote elobi ete na mikolo ya nsuka bato bakolinga “bisengo na esika ya kolinga Nzambe.”
Bokosi ya mangomba. Na 2 Timote 3:5, Biblia esakolaki ete bato bakomonisa ete basambelaka Nzambe kasi bakotosa te mibeko na ye na bomoi na bango.
Bisakweli ya Biblia ezali kokóma polele. Mokanda ya Danyele esakolaki ete na “ntango ya nsuka,” bato mingi bakokóma na boyebi mingi ya mateya ya Biblia, ezala mpe bisakweli na yango.—Danyele 12:4, note.
Koteya bato na mokili mobimba. Yesu alobaki: “Nsango malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso.”—Matai 24:14.
Elimo ya mafumatu mpe kotyola. Yesu alobaki ete bato mingi bakokipe te makambo oyo ezali komonisa polele ete nsuka ya mokili ekómi pene. (Matai 24:37-39) Kutu, 2 Petro 3:3, 4 emonisi ete bamosusu bakotyola to komona yango masɛki, bakondimela yango ata moke te.
Kokokisama ya bisakweli nyonso. Yesu alobaki ete na mikolo ya nsuka bisakweli oyo nyonso ekokokisama, kasi te kaka mwa ndambo na yango.—Matai 24:33.
Ezali ya solo ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka”?
Ɛɛ. Na kotalela makambo oyo ezali koleka na mokili mpe badati oyo Biblia elobeli, emonani ete mikolo ya nsuka ebandaki na 1914, mbula oyo Etumba ya liboso ya mokili mobimba ebandaki. Video oyo elandi ezali komonisa ete makambo oyo ezali kosalema na mokili emonisi ete tozali mpenza kobika na mikolo ya nsuka.
Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na likoló na 1914. Makambo nini Bokonzi yango esalaki lisoboliboso? Moko na yango ezalaki kobengana Satana ná bademo na ye na likoló mpe kolongola bango likoki ya kosala mabe na likoló. (Emoniseli 12:7-12) Bizaleli mpe makambo ya mabe oyo ezali komonana lelo epai ya bato emonisi ete Satana azali mpenza kosala mosala na mabele, yango esali mpe ete mikolo ya nsuka ezala “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.”—2 Timote 3:1.
Bato mingi bazali konyokwama na bantango oyo ya mpasi. Bazali komitungisa mpo bato bazali koyeba lisusu te ndenge ya kofanda na bato. Bamosusu bazali kobanga ata mpo na avenir ya bato awa na mabele.
Nzokande, ezali na bato mosusu oyo atako bango mpe bazali komitungisa mpo na makambo ya mokili, kasi bazali na elikya. Bazali na kondima ete mosika te Bokonzi ya Nzambe ekolongola mpasi nyonso ya mokili. (Danyele 2:44; Emoniseli 21:3, 4) Bazali kozela Nzambe akokisa makambo alakaki, mpe maloba ya Yesu oyo “moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka, akobika” epesaka bango makasi.—Matai 24:13; Mika 7:7.