Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 119
  • Liloba ya Nzambe ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liloba ya Nzambe ezali nini?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Yoane 1:1​—“Na ebandeli Liloba azalaki”
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • “Baoyo babengami ‘banzambe’ ”
    Lamuká!—2005
  • Makomami malobi nini na ntina na “bonzambe na Klisto”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mpo na nini Yesu abengami Mwana ya Nzambe?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 119
Yesu asimbi rulo mpe azali koloba

Liloba ya Nzambe ezali nini?

Eyano ya Biblia

Maloba “Liloba ya Nzambe” mbala mingi emonisaka nsango oyo euti epai ya Nzambe to mpe maloba nyonso oyo Nzambe alobi. (Luka 11:28) Kaka na bisika moke nde Biblia esaleli maloba “Liloba ya Nzambe” to “Liloba” lokola titre ya moto.​—Emoniseli 19:13; Yoane 1:14.

Nsango ya Nzambe. Mbala mingi basakoli bazalaki koloba ete nsango oyo bazalaki kopesa ezalaki Liloba ya Nzambe. Na ndakisa, na esakweli na ye, Yirimia abandaki nsango na ye na maloba “liloba ya Yehova ebandaki koyela ngai.” (Yirimia 1:4, 11, 13; 2:1) Liboso mosakoli Samwele ayebisa Saulo ete Nzambe aponi ye azala mokonzi, alobaki boye: “Tɛlɛmá mpo nayebisa yo liloba ya Nzambe.”​—1 Samwele 9:27.

Titre oyo moto azali na yango. Na Biblia Yesu Kristo abengami mpe “Liloba,” ezala ntango azalaki na likoló mpe awa na mabele. Tótalela mwa bantina oyo endimisi yango:

  • Liloba azalaki na bomoi liboso ya bikelamu nyonso. “Na ebandeli Liloba azalaki . . . Ye azalaki elongo na Nzambe na ebandeli.” (Yoane 1:1, 2) Yesu azali “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá . . . Ye azali liboso ya biloko mosusu nyonso.”​—Bakolose 1:13-15, 17.

  • Liloba ayaki na mokili lokola moto. “Liloba akómaki moto mpe afandaki na kati na biso.” (Yoane 1:14) Yesu Kristo “amikómisaki nde mpamba mpe akómaki lokola moombo mpe akómaki lokola bato.”​—Bafilipi 2:5-7.

  • Liloba azali Mwana ya Nzambe. Nsima ya koloba ete “Liloba akómaki moto,” ndenge tolobeli yango na likoló, ntoma Yoane abakisaki ete “tomonaki nkembo na ye, nkembo lokola oyo ya mwana uta na tata, mwana se moko oyo abotamaki.” (Yoane 1:14) Ntoma Yoane akomaki lisusu boye: ‘Yesu azali mwana ya Nzambe.’​—1 Yoane 4:15.

  • Liloba azali na batitre lokola Nzambe. “Liloba azalaki nzambe.” (Yoane 1:1) Yesu azali “mpenza komonisa nkembo ya Nzambe mpe azali elilingi na Ye mpenza.”​—Baebre 1:2, 3.

  • Liloba azali koyangela. Biblia elobi ete Liloba azali na “mitole mingi” na motó na ye. (Emoniseli 19:12, 13) Liloba abengami mpe “Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo.” (Emoniseli 19:16) Yesu abengami “Mokonzi ya baoyo bazali bakonzi mpe Nkolo ya baoyo bazali bankolo.”​—1 Timote 6:14, 15.

  • Liloba azali molobeli ya Nzambe. Emonani ete titre “Liloba” emonisaka ete Nzambe asalelaka ye mpo na kopesa malako mpe bansango. Yesu alobaki ete akokisaki mokumba yango: “Tata moto atindaki ngai apesaki ngai mitindo mpo na makambo nasengeli koyebisa mpe oyo nasengeli koloba. . . . Kaka ndenge Tata ayebisaki ngai yango, nazali koloba yango kaka bongo.”​—Yoane 12:49, 50.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto