Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 127
  • Nani azalaki mwasi ya Kaina?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nani azalaki mwasi ya Kaina?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Kaina azwaki mwasi na ye wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bandeko mibale oyo bakesanaki na bizaleli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Nkanda etindaki ye aboma
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Tópesa Yehova mbeka oyo akondima
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 127
Kaina ná mwasi na ye

Nani azalaki mwasi ya Kaina?

Eyano ya Biblia

Kaina, mwana ya liboso ya Adama ná Eva, abalaki moko ya bandeko na ye ya basi to mwana ya ndeko na ye. Tokoki koloba bongo na kotalela oyo Biblia elobi na ntina etali Kaina mpe libota na ye.

Makambo etali Kaina mpe libota na ye

  • Bato nyonso bautá epai ya Adama ná Eva. Nzambe, “na moto moko [Adama] asalaki bikólo nyonso ya bato, mpo na kofanda na etando mobimba ya mabele.” (Misala 17:26) Eva, mwasi ya Adama akómaki “mama ya moto nyonso oyo azali na bomoi.” (Ebandeli 3:20) Boye, Kaina abalaki moko ya bana to bankɔkɔ ya Adama ná Eva.

  • Kaina ná ndeko na ye Abele bazali na molɔngɔ ya liboso ya bana oyo Eva abotaki. (Ebandeli 4:1, 2) Ntango Nzambe abenganaki Kaina mpo abomaki ndeko na ye, Kaina amilelaki boye: “Moto oyo akomona ngai akoboma ngai.” (Ebandeli 4:14) Kaina azalaki kobanga banani? Biblia elobi ete Adama “abotaki bana mibali mpe bana basi.” (Ebandeli 5:4) Emonani ete bana wana mosusu ya Adama ná Eva bakokaki kosala Kaina mabe.

  • Na ebandeli mpenza ya istware ya bato, bandeko bazalaki kobalana na bango. Na ndakisa, Abrahama, moto ya sembo abalaki mwana ya tata na ye. (Ebandeli 20:12) Mbala ya liboso oyo bapekisaki libala ya ndenge wana ezalaki na Mibeko oyo Nzambe apesaki Moize, bankama ya bambula nsima ya eleko ya Kaina. (Balevi 18:9, 12, 13) Emonani ete bana oyo bandeko na bandeko bazalaki kobota na ntango wana bazalaki te na bamaladi oyo bana babotamaka na yango lelo soki baboti na bango bazali bato ya libota moko.

  • Biblia emonisaka ete istware ya Adama na Eva mpe libota na bango ezali istware ya solo. Bankombo ya bana mpe bankɔkɔ ya Adama ezwami kaka te na mokanda ya Ebandeli oyo Moize akomaki, kasi mpe na makomi ya Ezera mpe Luka. (Ebandeli 5:3-5; 1 Ntango 1:1-4; Luka 3:38) Bato oyo bakomaki Biblia balobeli istware ya Kaina lokola likambo moko oyo esalemá mpenza.​—Baebre 11:4; 1 Yoane 3:12; Yuda 11.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto