19 Kasi lelo oyo, boboyi Nzambe na bino,+ oyo azalaki kobikisa bino na mabe mpe na bampasi na bino nyonso, mpe bolobi: “Te, osengeli kotyela biso mokonzi.” Sikoyo, bótɛlɛma liboso ya Yehova na kolanda mabota na bino mpe bituluku na bino ya bato nkóto.’”