-
1 Samwele 29:6Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
6 Na yango Akishe+ abengaki Davidi mpe alobaki na ye: “Lokola Yehova azali solo na bomoi, ozali sembo, mpe nasepeli ndenge oyei na etumba elongo na basoda na ngai.+ Mpo namoni yo na likambo ya mabe ata moko te banda mokolo oyo oyaki epai na ngai tii lelo.+ Kasi, bankolo mosusu bazali kotyela yo motema te.+
-