22 Na yango Mokonzi Salomo ayanolaki mama na ye: “Ozali kosɛnga ete Abishage Moshuneme akóma mwasi ya Adoniya? Ezali lokola ozali kosɛnga ete bápesa ye bokonzi+ mpo azali mokóló na ngai,+ mpe nganga-nzambe Abiatare ná Yoabe+ mwana ya Zeruya+ bazali na ngámbo na ye.”