8 Na ntango yango, Salomo ayanganisaki+ bankulutu ya Yisraele, elingi koloba bankumu nyonso ya mabota, mpe bankumu ya batata ya mabota ya Yisraele.+ Bayaki epai ya Mokonzi Salomo na Yerusaleme mpo na kozwa sanduku ya kondimana ya Yehova na Sité ya Davidi,+ elingi koloba na Siona.+