25 Yirimia+ asalelaki Yosiya loyembo ya mawa; mpe bayembi nyonso ya mibali mpe ya basi+ balobelaka Yosiya na nzembo na bango ya mawa tii na mokolo ya lelo. Mpe bazwaki ekateli ete nzembo yango esengeli koyembama na Yisraele, mpe ekomami na mokanda ya nzembo ya mawa.