10 Mordekai akomaki yango na nkombo ya Mokonzi Asueruse mpe atyaki yango kashɛ na lopɛtɛ ya mokonzi.+ Atindaki mikanda yango na mabɔkɔ ya bamemi-mikanda oyo batambolaka na mpunda; bazalaki kotambwisa bampunda ya poste ya mbangu makasi, oyo babɔkɔlaka mpo na mosala ya mokonzi.