8 “‘Kasi talá oyo Yehova alobi mpo na bafigi ya mabe oyo ekoki kolyama te mpo ezali mabe:+ “Ndenge wana nde nakotalela Zidikiya+ mokonzi ya Yuda, bankumu na ye, bafandi ya Yerusaleme oyo babiki, baoyo batikali na mokili oyo mpe baoyo bazali kofanda na mokili ya Ezipito.+