31 Bakoya ebele mpo na kofanda liboso na yo lokola bato na ngai; mpe bakoyoka maloba na yo kasi bakosalela yango te,+ mpo na monɔkɔ na bango, bazali kolobela yo maloba sukali, kasi motema na bango ezali kolanda na lokoso mpenza litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe.