27 Banzete ya elanga ekobota mbuma na yango, mabele ekopesa mbuma na yango,+ mpe ekofanda na kimya na mokili. Bampate yango ekoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakobuka banzete ya ekanganeli na yango+ mpe nakobikisa yango na lobɔkɔ ya baoyo bazwaki yango baombo.