10 “Nakosopela bakitani ya Davidi ná bafandi ya Yerusaleme elimo ya boboto mpe ya mabondeli. Bakotala epai ya moto oyo batɔbɔlaki,+ mpe bakoganga na kolela ye, ndenge balelaka mwana mobali se moko; mpe bakoyoka mawa makasi mpo na ye, ndenge bayokaka mawa mpo na mwana mobali ya liboso oyo akufi.