4 Na mokolo yango, makolo na ye ekotɛlɛma na Ngomba ya Olive,+ oyo etalani na Yerusaleme, na ɛsti. Ngomba ya Olive ekopasuka na katikati, banda na ɛsti tii na wɛsti mpe ekosala lobwaku moko ya monene mpenza. Ndambo ya ngomba ekokende na nɔrdi, mpe ndambo na yango mosusu na sudi.