21 Nganga-nzambe asengeli sikoyo kolapisa mwasi yango ndai oyo ekangani na elakeli mabe,+ mpe nganga-nzambe asengeli koloba na mwasi yango ete: “Yehova akómisa yo ndakisa ya elakeli mabe mpe ya ndai na katikati ya bato na yo na ndenge Yehova akotika ebɛlɔ+ na yo ekɔnda, mpe libumu na yo evimba.