5 Na nsima, bato bakendaki koyebisa Davidi likambo ya mibali yango; mpe na mbala moko, atindaki bato bákutana na bango, mpamba te mibali yango bayokaki nsɔni mingi mpenza; mpe mokonzi alobaki lisusu ete: “Bófanda na Yeriko+ tii ntango mandefu na bino ekokola mingi. Na nsima, bózonga.”