Maloba na nse ya lokasa
b Baoyo, na ntango ya kala basilaki kosopa zemi bákanisa te ete makambo nyonso mabebi. Bakoki kondimisama ete Yehova asungaka basumuki oyo babongoli motema mpe ‘alimbisaka na motema mobimba.’ (Yisaya 55:7) Mbala mosusu mitungisi na mayoki ekoki kotikala, kasi mokomi na Nzembo azali kopesa kondimisama oyo: “Mosika pelamoko yango kati na epai na ebimelo na ntango mpe epai na elimwelo na yango, mosika boye asili kolongola bipɛngwɛli na biso.”—Nzembo 103:12.