Maloba na nse ya lokasa
a Banganga-mayele ya Biblia balobi ete elobeli ‘mbuma oyo Yehova atɔisi’ ezali komonisa Masiya, oyo asengelaki kobima kaka nsima wana Yelusaleme ekotongama lisusu. Na kati ya Ba-Targoum, tozali kotánga maloba yango ete: “Masiya [Klisto] ya Yehova.” Likambo ya kosepelisa, bambula mingi na nsima, Yilimia asalelaki liloba yango ya Liebele (tsèmaḥ) ntango alobelaki Masiya ete azali “mbuma etɔi na bosembo” oyo euti na Davidi.—Yilimia 23:5; 33:15, NW.