Maloba na nse ya lokasa
b Na ndakisa, Biblia elobeli elongi ya Nzambe, miso, matoi, zolo, monɔkɔ, mabɔkɔ mpe makolo na ye. (Nzembo 18:15; 27:8; 44:3; Yisaya 60:13; Matai 4:4; 1 Petelo 3:12) Yango ezali nde maloba ya elilingi, elingi koloba te ete Yehova azali mpenza na binama yango; ndenge moko mpe, azali mpenza “libanga” to “nguba” te atako basalelaka maloba wana mpo na kolobela ye.—Deteronome 32:4; Nzembo 84:11.