Maloba na nse ya lokasa
a Atako ebengami “mosungi,” elimo santu oyo elobelami lokola moto ezali moto te; na yango, ezali likita na oyo elobeli mobali te mpe mwasi te to pronom neutre nde bagreke basalelaki mpo na kolobela yango. Motindo moko, ezali makitana ya liebele mpo na komonisa bomwasi nde esalelami mpo na kolobela mayele lokola moto atako ezali moto te. (Masese 1:20-33; 8:1-36) Na koleka, elimo santu “esopamaki,” nzokande moto akoki kosopama te.—Misala 2:33.