Maloba na nse ya lokasa
c Emonani polele ete Yozefe azalaki lisusu na bomoi te, mpamba te masolo ya mosala ya Yesu elobeli bato mosusu ya libota ya Yesu: mama na ye, bandeko na ye ya mibali mpe bandeko na ye basi. Na ndakisa, na fɛti ya libala oyo esalemaki na Kana, Biblia elobi ete Malia azalaki na fɛti yango mpe apesaki mwa makanisi ntango vinyo esilaki, kasi elobeli Yozefe ata moke te. (Yoane 2:1-11) Mokolo mosusu, bato ya mboka ya Klisto babengaki Yesu mwana ya Yozefe te, kasi “mwana ya Malia.”—Malako 6:3.