Maloba na nse ya lokasa
d Boaze apesaki Ruta mezire motoba ya bilei oyo kilo na yango eyebani mpenza te—ntango mosusu mpo na komonisa ete kaka ndenge bato bazalaki kosala na boumeli ya mikolo motoba mpe kopema na mokolo ya sabata, mikolo oyo Ruta anyokwamaki lokola mwasi oyo mobali akufá elingaki kosila mpe alingaki kozwa “kopema” oyo ekokaki kouta na kozala na ndako mpe mobali. Epai mosusu, mezire motoba—ekoki kozala pau etondá—ekokaki kozala mezire oyo Ruta akokaki komema.