Maloba na nse ya lokasa
a Maloba “ebandeli ya mokili” epesaka likanisi ya kobwaka mboto na mabele to kobota bana; boye maloba yango etaleli bato ya liboso oyo babotamaki na mokili. Kasi mpo na nini Yesu asaleli maloba “ebandeli ya mokili” epai ya Abele kasi te epai ya kaina, moto ya liboso oyo abotamaki na mokili? Bikateli mpe misala ya Kaina emonisaki ete atombokelaki Yehova Nzambe na nko mpenza. Ndenge moko na baboti na ye, Kaina azali te na molɔngɔ ya bato oyo bakosekwa mpe bakosikolama.