Maloba na nse ya lokasa
e Paragrafe 13: Maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na Misala 20:29, 30 emonisi ete banguna oyo bakobundisa lisangá basengelaki kouta na libándá mpe na kati ya lisangá. Liboso, bakristo ya lokuta (“matiti mabe”) basengelaki ‘kokɔta na kati’ ya bakristo ya solo. Ya mibale, bato mosusu oyo bauti “na kati” ya bakristo ya solo basengelaki kokóma bapɛngwi mpe koloba “makambo ya mbilingambilinga.”