Maloba na nse ya lokasa
b Profesɛrɛ moko na nkombo Marvin Pate akomaki ete bato mingi ya mayele balobaka ete ntango Yesu alobaki “lelo,” alingaki komonisa ete akokufa mpe akozala na Paradiso na mokolo yango kaka, to ngonga 24 ekoleka te. Profesɛrɛ Pate abakisaki ete kotalela makambo ndenge wana ebongi te mpo eyokani te na mateya mosusu ya Biblia. Na ndakisa, Biblia elobi ete Yesu azalaki na kati ya Nkunda ntango akufaki mpe na nsima akendaki na likoló.—Matai 12:40; Misala 2:31; Baroma 10:7.