Maloba na nse ya lokasa
a Tofandi na mokili oyo Satana, tata ya lokuta azali koyangela. Yango wana, ekoki kozala mpasi mpo tókoba kotambola na kati ya solo. Bakristo ya siɛklɛ ya liboso mpe bakutanaki na mikakatano ya ndenge wana. Na nzela ya elimo santu na ye, Yehova asalelaki ntoma Yoane mpo akoma mikanda misato. Mikanda yango esalisaki bango, ekoki mpe kosalisa biso. Na mikanda yango, tokoyekola makambo oyo ekoki kopekisa biso kotambola na kati ya solo, mpe oyo tokoki kosala mpo tólonga makambo yango.