Maloba na nse ya lokasa
a Mpo na kokokisa masɛngami ya kozwa batisimo, tosengeli kondima kosala mbongwana na bomoto na biso. Lisolo oyo ekosalisa biso tómona bizaleli nini ezali kati na bomoto ya kala, mpo na nini tosengeli kolongola yango, mpe ndenge oyo tokoki kosala yango. Lisolo oyo elandi ekolobela ndenge oyo tokoki kokoba kolata bomoto ya sika, ata nsima ya kozwa batisimo.