Maloba na nse ya lokasa
a Mateya oyo elobaka ete molimo ekufaka te mpe moto abotamaka mbala na mbala eutá na mateya ya bato ya Babilone. Na nsima, bato ya filozofi ya Inde bakómisaki yango liteya ya Karma. Buku moko (Britannica Encyclopedia of World Religions) elobi ete Karma ezali “mobeko oyo esalaka ete makambo oyo moto asalaki na bomoi oyo azalaki na yango liboso ekoba tii na bomoi oyo akozala na yango ntango akobotama lisusu.”—Lokasa 913.