Maloba na nse ya lokasa
b Emonani lokola bakomi ya Biblia ya bokristo basalelaki nkombo ya Nzambe ntango bazongelaki maloba ya makomi ya “Testama ya Kala” oyo ezalaki na nkombo yango. Diksionɛrɛ moko The Anchor Bible Dictionary elobi: “Ezali na bilembeteli oyo emonisi ete Tetragrame ya nkombo ya Nzambe, Yawe, oyo ezalaki na makomi mosusu to nyonso ya Testama ya Kala ezongelamaki na Testama ya Sika ntango bazalaki naino kokoma Testama ya Sika.” (Volimi 6, lokasa 392) Mpo na koyeba makambo mosusu, talá “Nkombo ya Nzambe kati na Makomami ya Grɛki ya bokristo” na Apɛndisi A5 na Biblia ya boyekoli ya Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika na Anglais. Apɛndisi C2 ezali na liste ya mabongoli mingi ya Biblia oyo esaleli nkombo ya Nzambe na Baroma 10:13.