Mwamisato, 16 sanza ya 7
Yehova ayebi ete makanisi ya bato ya bwanya ezali mpamba.—1 Ko. 3:20.
Tosengeli koboya mpenza makanisi ya bato. Soki tozali kokanisa ndenge bato oyo batyolaka Yehova mpe mibeko na ye bakanisaka, tokoki mpe kobosana Yehova mpe mibeko na ye. (1 Ko. 3:19) Mbala mingi “bwanya ya mokili oyo” elendisaka bamposa ya nzoto. Bakristo mosusu na Pergame mpe na Tyatire bakómaki kosambela bikeko mpe kosala pite ndenge bato bazalaki kosala na engumba yango. Yesu apesaki masangá yango nyonso mibale toli ya makasi mpo batikaki ete bato básala pite. (Em. 2:14, 20) Lelo oyo, bato oyo bazali zingazinga na biso bakoki kotinda biso tókóma na makanisi mabe. Bandeko ya libota mpe bato oyo toyebani na bango bakoki kondimisa biso ete tozali makambo makasimakasi mpe kolendisa biso tóbuka mibeko ya Yehova. Na ndakisa, bakoki koloba ete ezali na ntina te kotikala pɛto na bizaleli mpe mitinda ya Biblia esilá ngala. Na bantango mosusu, tokoki kokanisa ete Yehova apesaka biso te malako oyo ezali polele. Tokoki ata komeka ‘kokende mosika koleka makambo oyo ekomamá.’—1 Ko. 4:6. w23.07 16 par. 10-11
Mwaminei, 17 sanza ya 7
Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso mpe azali ndeko oyo abotami mpo na bantango ya mpasi.—Mas. 17:17.
Maria, mama ya Yesu, azalaki na mposa ya kozwa makasi. Abalaki naino te; kasi, asengelaki kokóma na zemi. Atako ye moko azalaki naino na bana te, asengelaki kobɔkɔla mwana mobali oyo akokóma Masiya. Mpe lokola Maria asangisaki naino nzoto na mobali te, ndenge nini akolimbola makambo nyonso wana epai ya Yozefe, mobali oyo akobala ye? (Luka 1:26-33) Ndenge nini Maria azwaki makasi? Alukaki lisalisi epai ya basusu. Na ndakisa, atunaki anzelu Gabriele mituna oyo etali mokumba yango. (Luka 1:34) Mwa moke na nsima, asalaki mobembo mpe akendaki tii na “etúká ya ngombangomba” ya Yuda mpo na kotala ndeko na ye Elizabeti. Elizabeti apesaki Maria longonya mpe elimo ya Yehova etindaki ye ayebisa Maria esakweli moko ya kolendisa mpo na mwana oyo azalaki na libumu na ye. (Luka 1:39-45) Maria alobaki ete Yehova “asali makambo ya nguya na lobɔkɔ na ye.” (Luka 1:46-51) Yehova apesaki Maria makasi na nzela ya anzelu Gabriele mpe ya Elizabeti. w23.10 14-15 par. 10-12
Mwamitano, 18 sanza ya 7
Akómisi biso bokonzi, banganga-nzambe mpo na Nzambe mpe Tata na ye.—Em. 1:6.
Kaka ndambo moke ya bayekoli ya Kristo nde batyami mafuta na elimo, mpe bazali na boyokani ya ndenge mosusu na Yehova. Bato yango 144000 bakozala banganga-nzambe na likoló elongo na Yesu. (Em. 14:1) Esika Mosantu ya tabernakle ezali komonisa ndenge bazali bana ya Nzambe oyo babotami na elimo wana bazali naino awa na mabele. (Rom. 8:15-17) Esika Eleki Mosantu ya tabernakle ezali komonisa likoló, epai Yehova afandaka. “Rido” oyo ekabolaki Esika Mosantu na Esika Eleki Mosantu ezali komonisa nzoto ya Yesu ya mosuni oyo ezalaki kopekisa ye akɔta na likoló lokola Nganga-nzambe Monene ya tempelo ya elimo. Ntango apesaki nzoto yango mbeka mpo na bato, Yesu afungolaki nzela ya bomoi na likoló mpo na bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo. Bango mpe basengeli kotika nzoto na bango ya mosuni mpo na kozwa mbano na bango ya likoló.—Ebr. 10:19, 20; 1 Ko. 15:50. w23.10 28 par. 13