Mwamitano, 18 sanza ya 7
Akómisi biso bokonzi, banganga-nzambe mpo na Nzambe mpe Tata na ye.—Em. 1:6.
Kaka ndambo moke ya bayekoli ya Kristo nde batyami mafuta na elimo, mpe bazali na boyokani ya ndenge mosusu na Yehova. Bato yango 144000 bakozala banganga-nzambe na likoló elongo na Yesu. (Em. 14:1) Esika Mosantu ya tabernakle ezali komonisa ndenge bazali bana ya Nzambe oyo babotami na elimo wana bazali naino awa na mabele. (Rom. 8:15-17) Esika Eleki Mosantu ya tabernakle ezali komonisa likoló, epai Yehova afandaka. “Rido” oyo ekabolaki Esika Mosantu na Esika Eleki Mosantu ezali komonisa nzoto ya Yesu ya mosuni oyo ezalaki kopekisa ye akɔta na likoló lokola Nganga-nzambe Monene ya tempelo ya elimo. Ntango apesaki nzoto yango mbeka mpo na bato, Yesu afungolaki nzela ya bomoi na likoló mpo na bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo. Bango mpe basengeli kotika nzoto na bango ya mosuni mpo na kozwa mbano na bango ya likoló.—Ebr. 10:19, 20; 1 Ko. 15:50. w23.10 28 par. 13
Mwapɔsɔ, 19 sanza ya 7
Ntango ekozanga ngai soki nalobeli lisusu Gideone.—Ebr. 11:32.
Gideone asilikaki te ntango bato ya Efraime bazalaki koloba mabe mpo na ye. (Bas. 8:1-3) Ayanolaki bango na nkanda te. Amonisaki ete azali moto ya komikitisa ntango azalaki koyoka makambo oyo bazalaki koloba mpe ndenge alobaki na bango na boboto. Bankulutu ya bwanya bamekolaka Gideone ndenge bayokaka na likebi mpenza mpe balobaka na boboto soki bato mosusu bazali koloba mabe mpo na bango. (Yak. 3:13) Yango esalaka ete kimya ezala na lisangá. Ntango bakumisaki Gideone mpo na ndenge alongaki Bamidiane, abendaki likebi ya bato epai ya Yehova. (Bas. 8:22, 23) Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Gideone? Basengeli kosala ete lokumu nyonso ezonga epai ya Yehova mpo na makambo oyo basalaka. (1 Ko. 4:6, 7) Na ndakisa, soki bapesi nkulutu moko longonya mpo na makoki na ye ya koteya, akoki kobenda likebi ya bato epai mateya yango euti, elingi koloba, na Liloba ya Nzambe, to na formasyo oyo ebongiseli ya Yehova epesaka biso. Bankulutu bakoki koluka koyeba soki lolenge na bango ya koteya ekumisaka Yehova to ebendaka nde likebi ya bato epai na bango moko. w23.06 4 par. 7-8
Mwalomingo, 20 sanza ya 7
Makanisi na ngai ezali makanisi na bino te.—Yis. 55:8.
Soki tozwi te oyo tosɛngi na libondeli, tokoki komituna boye: ‘Nazali kobondela mpo na makambo oyo ebongi?’ Mbala mingi, tokanisaka ete toyebi oyo eleki malamu mpo na biso. Kasi makambo oyo tosɛngaka, mbala mosusu yango nde te eleki malamu mpo na biso. Soki tozali kobondela mpo na mokakatano moko, ekoki kozala na lolenge ya malamu ya kosilisa mokakatano yango koleka lolenge oyo biso tozali kosɛnga. Mpe makambo mosusu oyo tosɛngaka mbala mosusu eyokani te na mokano ya Yehova. (1 Yoa. 5:14) Na ndakisa, tótalela ndakisa ya baboti oyo basɛngi Yehova ete mwana na bango atikala na kati ya solo. Emonani ete basɛngi likambo ya malamu. Kasi, Yehova atindaka biso te na makasi tósalela ye. Alingaka ete biso nyonso, ata mpe bana na biso, tópona kosalela ye. (Mib. 10:12, 13; 30:19, 20) Na yango, baboti yango bakoki nde kosɛnga Yehova asalisa bango básimba motema ya mwana na bango mpo etinda ye alinga Yehova mpe akóma moninga na ye.—Mas. 22:6; Ef. 6:4. w23.11 21 par. 5; 23 par. 12