Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mokolo ya Kosambisama ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
    • Na mokolo yango, bamiliare ya bato bakozwa mpo na mbala ya liboso libaku ya koyekola mokano ya Nzambe mpe kotosa yango. Elingi koloba ete mosala moko monene mpenza ya koteya bato ekosalema. Ya solo mpenza, “bafandi ya molɔ́ngɔ́ bakoyekola boyengebene.” (Yisaya 26:9) Atako bongo, bato nyonso te nde bakondima kotosa mokano ya Nzambe. Yisaya 26:10 elobi ete: “[Atako] moto mabe amonisami boboto, akoyekola boyengebene te; kati na mokili ya sembo, akosalaka na mobulu, akomona nkembo ya [Yehova] te.” Bato mabe yango bakobomama mpo na libela na Mokolo ya Kosambisama.​—Yisaya 65:20.

      Bato oyo bakokóma kino na nsuka ya mokolo yango ‘bakozonga na bomoi’ mpenza, bakokóma bato ya kokoka. (Emoniseli 20:5) Na ndenge yango, na Mokolo ya Kosambisama, bato bakozonga na ezaleli ya kokoka ndenge ezalaki na ebandeli. (1 Bakolinti 15:24-28) Na nsima, bakomekama mpo na mbala ya nsuka. Satana akobimisama na bolɔkɔ mpe bakotikela ye nzela ameka kobungisa bato nzela mpo na mbala ya nsuka. (Emoniseli 20:3, 7-10) Elaka oyo ya Biblia ekokokisama na mobimba epai ya baoyo bakoboya kolanda Satana: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29) Ɛɛ, Mokolo ya Kosambisama ekozala mpenza likambo ya malamu mpo na bato nyonso ya sembo!

  • 1914—Mobu ya ntina mingi na bisakweli ya Biblia
    Biblia eteyaka mpenza nini?
    • APƐNDISI

      1914​—Mobu ya ntina mingi na bisakweli ya Biblia

      MBULA soki 40 liboso ya mobu 1914, bayekoli ya Biblia basakolaki ete makambo minene ekosalema na mobu yango. Makambo nini, mpe nini emonisi ete 1914 ezali mobu moko ya ntina mingi?

      Na Luka 21:24, tozali kokuta maloba oyo ya Yesu: “Yelusaleme ekonyatama na bikólo mosusu, tii bantango oyo etyamá ya bikólo mosusu [“eleko ya bapagáno,” Liloba lya Nzambe] ekokoka.” Yelusaleme ezalaki mboka-mokonzi ya ekólo ya Bayuda​—esika oyo bakonzi nyonso oyo bauti na libota ya Mokonzi Davidi bazalaki kofanda. (Nzembo 48:1, 2) Kasi, bakonzi yango bakesanaki na bakonzi ya bikólo mosusu. Bango bafandaki na ‘kiti ya bokonzi ya Yehova,’ elingi koloba bazalaki bamonisi ya Nzambe mpenza. (1 Ntango 29:23) Na ndenge yango, Yelusaleme ezalaki komonisa boyangeli ya Yehova.

      Kasi, ndenge nini mpe ntango nini ‘bikólo mosusu ebandaki konyata’ boyangeli ya Nzambe? Ezalaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ntango bato ya Babilone babɔtɔlaki Yelusaleme. Moto afandaki lisusu te na ‘kiti ya bokonzi ya Yehova,’ mpe likambo yango esukisaki kolandana ya bakonzi ya libota ya Davidi na kiti ya bokonzi yango. (2 Mikonzi 25:1-26) ‘Konyatama’ yango esengelaki koumela libela na libela? Te, mpamba te mosakoli Ezekiele alobaki boye mpo na Sidikiya, mokonzi ya nsuka na Yelusaleme: “Longolá elamba ya motó mpe longolá motole. . . . [Ekozala mpenza ya moto mosusu te, NW] kino ekokóma ye oyo abongi na yango, oyo ngai nakopesa yango na ye.” (Ezekiele 21:26, 27) Ye oyo “abongi” na motole ya Davidi ezali Klisto Yesu. (Luka 1:32, 33) Na yango, ‘konyatama’ yango esengelaki kosila ntango Yesu akokóma Mokonzi.

      Ntango nini likambo monene wana esengelaki kosalema? Yesu amonisaki ete bato ya bikólo mosusu basengelaki koyangela na boumeli ya ntango oyo basilaki kokatela bango. Lisolo oyo ezali na mokapo 4 ya Danyele ezali na makambo oyo ezali kosalisa biso tóyeba soki ntango yango esengelaki kozala mbula boni. Lisolo yango elobeli ndɔtɔ moko oyo Nebukadanesala alɔtaki. Na ndɔtɔ yango, oyo ezali mpe esakweli, mokonzi yango ya Babilone amonaki nzete moko molai mpenza mpe na nsima, bakataki yango. Ekumu to mwa eteni oyo etikalaki na mabelé ebimisaki nzete ya sika te mpo bazingaki yango na monyɔlɔlɔ ya ebende mpe ya kwivre. Anzelu moko alobaki ete: ‘Tiká ntango nsambo eleka likoló na yango.’​—Danyele 4:10-16.

      Na Biblia, basalelaka ntango mosusu banzete lokola elembo ya boyangeli. (Ezekiele 17:22-24; 31:2-5) Na yango, lokola bakataki nzete wana ya elilingi, emonisi ndenge bakosukisa boyangeli ya Nzambe, oyo emonisamaki na bakonzi oyo bazalaki koyangela na Yelusaleme. Kasi, ndɔtɔ yango emonisaki mpe ete ‘konyatama yango ya Yelusaleme’ ekoumela mwa ntango​—“ntango nsambo.” Yango ezali mbula boni?

      Emoniseli 12:6, 14 emonisi ete ntango misato na ndambo ekokani na “mikolo nkóto moko na nkama mibale na ntuku motoba (1 260).” Na yango, “ntango nsambo” esengeli koumela mbala mibale koleka, elingi koloba mikolo 2 520. Nzokande, mikolo 2 520 mpamba nsima ya kokwea ya Yelusaleme, bikólo mosusu etikaki te ‘konyata’ boyangeli ya Nzambe. Yango emonisi polele ete esakweli yango ezali kolobela ntango moko ya molai koleka. Soki tolandi likanisi oyo ezali na Mituya 14:34 mpe Ezekiele 4:6, oyo elobeli “mbula moko mpo na mokolo moko,” emonisi ete “ntango nsambo” esengeli kozala mbula 2 520.

      Mbula 2 520 yango ebandaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 607 L.T.B., ntango Yelusaleme ekweaki na mabɔkɔ ya bato ya Babilone mpe balongolaki mokonzi ya libota ya Davidi na bokonzi. Bambula yango esukaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1914. Na ntango wana, “bantango oyo etyamá ya bikólo mosusu” esukaki, mpe Nzambe atyaki Yesu Klisto Mokonzi kuna na likoló.a​—Nzembo 2:1-6; Danyele 7:13, 14.

      Se ndenge Yesu asakolaki, makambo ya nsɔmɔ​—bitumba, nzala, koningana ya mabelé, mpe bamaladi mabe—​ezali komonana na mokili mobimba na ntango oyo ya “kozala” na ye Mokonzi kuna na likoló. (Matai 24:3-8; Luka 21:11) Makambo yango ezali komonisa polele mpenza ete ezali na mobu 1914 nde Bokonzi ya Nzambe ebotamaki kuna na likoló mpe “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo ebandaki.​—2 Timote 3:1-5.

      Etanda: ‘Ntango nsambo,’ to eleko ya bapagáno, calculated from Jerusalem’s fall until 2,520 years ended in October 1914

      a Kobanda na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 607 L.T.B. tii na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 1 L.T.B., esali mbula 606. Lokola mobu zero ezalaka te, kobanda na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 1 L.T.B. tii na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1914 ya ntango na biso (T.B.), esali mbula 1914. Soki tokamati mbula 606 tobakisi na mbula 1914, tokozwa mbula 2 520. Soki olingi koyeba makambo mosusu oyo etali kokwea ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B., tángá “Chronologie” na buku Étude perspicace des Écritures, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

  • Mikaele anzelu-mokonzi nde nani?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
    • APƐNDISI

      Mikaele anzelu-mokonzi nde nani?

      BIBLIA elobeli ekelamu ya elimo na nkombo Mikaele mbala mingi te. Kasi, na bavɛrsɛ oyo elobeli ye, azali kosala likambo moko. Na buku ya Danyele, Mikaele azali kobunda na baanzelu mabe; na mokanda ya Yuda, azali kowelana na Satana; mpe na Emoniseli, azali kobunda na Zabolo ná bademo na ye. Lokola Mikaele azali kokɔtela boyangeli ya Yehova mpe kobunda na banguna ya Nzambe, yango emonisi ete azali kosala makambo oyo eyokani na ndimbola ya nkombo na ye​—“Nani akokani na Nzambe?” Kasi Mikaele yango nde nani?

      Ntango mosusu moto moko ayebanaka na bankombo mingi. Na ndakisa, Yakobo ayebani mpe na nkombo Yisalaele; ntoma Petelo ayebani mpe na nkombo Simona. (Genese 49:1, 2; Matai 10:2) Se ndenge moko, Biblia emonisi ete Mikaele ezali nkombo mosusu ya Yesu Klisto, liboso aya awa na mabelé mpe nsima ya kozonga na ye na likoló. Tótala bavɛrsɛ oyo emonisi biso ete ezali mpenza bongo.

      Anzelu-mokonzi. Liloba ya Nzambe elobeli Mikaele “anzelu-mokonzi.” (Yuda 9) Na Biblia, liloba “anzelu-mokonzi” ezali kaka na booko (singulier); ata esika moko te okokuta liloba yango na boike (pluriel). Yango emonisi ete anzelu ya ndenge wana azali kaka moko. Longola yango, soki balobeli anzelu-mokonzi, makanisi ekendeke mbala moko epai ya Yesu. Vɛrsɛ ya 1 Batesaloniki 4:16 elobi boye mpo na Nkolo Yesu Klisto nsima ya kosekwa na ye: “Nkolo ye moko akokita uta na likoló na mbela ya komandema, na mongongo ya anzelu-mokonzi.” Awa, balobi ete mongongo ya Yesu ezali mongongo ya anzelu-mokonzi.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto