-
Nkombo ya Nzambe—Esengeli kosalela yango? Elimboli nini?Biblia eteyaka mpenza nini?
-
-
Nzambe ye moko ayebisaki Moize, mosaleli na ye ya sembo, ndimbola ya nkombo na ye. Ntango Moize atunaki Yehova nkombo na ye, ayanolaki boye: “Nakozala oyo nakozala.” (Exode 3:14, NW) Biblia ya Rotherham ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Nakokóma ndenge nyonso oyo nalingi.” Yango emonisi ete Yehova akoki kokóma ndenge nyonso oyo alingi mpo na kokokisa mikano na ye.
Kanisá ete ozali na likoki ya kokóma ndenge nyonso oyo olingi. Okosala nini mpo na baninga na yo? Soki moko na bango abɛli makasi, okoki kokóma monganga oyo ayebi mosala malamu mpo na kobikisa ye. Soki mosusu azali na mbongo te, okoki kokóma moto ya bomɛngo mpo na kosalisa ye. Nzokande, na kotalela makambo ndenge mpenza ezali, okoki kokóma ndenge nyonso oyo olingi te. Ezali bongo mpo na biso nyonso. Na boyekoli na yo ya Biblia, okokamwa na komona ete Yehova akómaka ndenge nyonso oyo alingi mpo na kokokisa bilaka na ye. Mpe asepelaka kosalela nguya na ye mpo na bolamu ya baoyo balingaka ye. (2 Ntango 16:9) Baoyo bayebi nkombo na ye te bayebaka te bizaleli nyonso wana ya malamu oyo Yehova azali na yango.
Emonani polele ete nkombo Yehova esengeli kozala na Biblia. Koyeba ndimbola na yango mpe kosalela yango mingi na makambo etali losambo na biso, ekosalisa biso mpenza na kopusana penepene na Yehova, Tata na biso ya likoló.a
-
-
Ndenge oyo esakweli ya Danyele eyebisi koya ya MasiyaBiblia eteyaka mpenza nini?
-
-
APƐNDISI
Ndenge oyo esakweli ya Danyele eyebisi koya ya Masiya
MOSAKOLI Danyele azalaki na bomoi mbula koleka 500 liboso Yesu abotama. Atako bongo, Yehova ayebisaki ye makambo oyo ekosalisa bato báyeba ntango oyo Yesu akoponama Masiya to Klisto. Ayebisaki ye boye: “Yebá mpe sosolá ete longwa na kobima ya liloba ya kotɛlɛmisa mpe ya kotonga Yelusaleme kino koya ya mopakolami [“Masiya,” NW], mokonzi, ekozala pɔsɔ nsambo. Na nsima . . . pɔsɔ ntuku motoba na mibale.”—Danyele 9:25.
-