Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 102 lok. 236-lok. 237 par. 2
  • Emoniseli epai ya Yoane

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Emoniseli epai ya Yoane
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Mokanda ya Biblia nimero 66—Emoniseli
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Nsango esakolami na baanzelu mpo na eleko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Nkembo na kiti na bokonzi na Jéhovah
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Bimonaneli etali baoyo bafandaka na likoló
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 102 lok. 236-lok. 237 par. 2
Ntoma Yoane azali kokoma mokanda ya Emoniseli

LITEYA 102

Emoniseli epai ya Yoane

Ntango ntoma Yoane azalaki na bolɔkɔ na esanga ya Patimosi, Yesu amonisaki ye bimonaneli 16, to bililingi ya mikolo ekoya. Bimonaneli yango emonisaki ndenge nkombo ya Yehova ekosantisama, Bokonzi na ye ekoya mpe ndenge mokano na ye ekosalema na mabele ndenge esalemaka na likoló.

Na emonaneli moko, Yoane amonaki Yehova afandi na kiti na ye ya bokonzi oyo etondi na nkembo na likoló mpe bankulutu 24 oyo balati bilamba ya mpɛmbɛ ná motole ya wolo na mitó na bango bazingi ye. Mikalikali mpe makɛlɛlɛ ya bankake eutaki na kiti ya bokonzi yango. Bankulutu yango 24 bakweaki liboso ya Yehova mpe basambelaki ye. Na emonaneli mosusu, Yoane amonaki ebele mpenza ya bato oyo bauti na bikólo nyonso, mikili nyonso mpe minɔkɔ nyonso bazali kosambela Yehova. Mwana-mpate, elingi koloba Yesu, azali kokamba bango mpe komema bango na mai ya bomoi. Na nsima, na emonaneli mosusu, Yesu abandi koyangela na likoló elongo na bankulutu 24. Na emonaneli oyo elandaki, Yoane amonaki Yesu azali kobunda na dragɔ, elingi koloba Satana ná bademo na ye. Yesu abwakaki bango na mabele.

Yesu ná bato 144000 na Ngomba Siona

Na nsima, Yoane amonaki elilingi moko kitoko ya mwana-mpate ná bato 144000 batɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona. Amonaki mpe anzelu moko azali kopumbwa zingazinga ya mabele; azali koyebisa bato bábanga Nzambe mpe bákumisa Ye.

Na emonaneli oyo elandaki, amonaki etumba ya Armagedone. Na etumba yango, Yesu ná limpinga na ye babomi mokili mabe ya Satana. Na emonaneli ya nsuka, Yoane amonaki likoló ná mabele ekómi na boyokani makasi. Satana ná momboto na ye babomami. Ekelamu nyonso na likoló mpe na mabele ezali kosantisa nkombo ya Yehova mpe kosambela kaka ye.

“Mpe nakotya bonguna kati na yo ná mwasi mpe kati na bana na yo ná mwana na ye. Ye akopanza motó na yo mpe yo okozokisa ye na litindi.”​—Ebandeli 3:15

Mituna: Yoane amonaki bimonaneli boni? Yesu akosala nini na etumba ya Armagedone?

Emoniseli 1:1-3; 4:1-11; 7:4, 9-17; 11:15-18; 12:5-12; 14:6, 7; 16:14, 16; 21:5

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto