Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ntina oyo bato mosusu bakokaka te kolinga Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2013 | 1 Novembre
    • ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MATEYA YA LOKUTA OYO ETINDAKA BATO BÁLINGA NZAMBE TE

      Ntina oyo bato mosusu bakokaka te kolinga Nzambe

      “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso.”​—Yesu Kristo, mobu 33 ya ntango na biso.a

      Bato mosusu bazalaka na mokakatano ya kolinga Nzambe. Mpo na bango, ezali mpasi koyeba makambo ya Nzambe, akipaka bato te, kutu azali motema mabe. Tóyoka ndenge bato oyo balobi:

      • “Nabondelaki Nzambe asalisa ngai, kasi na ntango wana kaka, nazalaki komiyoka ete azali mosika na ngai, mpe nakoki kopusana penepene na ye te. Nazalaki kokanisa ete Nzambe ayokaka esengo te, mawa mpe te.”​—Marco, Italie.

      • “Atako nazalaki na mposa ya kosalela Nzambe, kasi nazalaki komona ete azali mosika na ngai. Nazalaki kokanisa ete Nzambe azalaka makambo makasi mpe mosala ayebi kaka kopesa biso bitumbu. Nazalaki kondima te ete azali boboto.”​—Rosa, Guatemala.

      • “Ntango nazalaki mwana, nazalaki kokanisa ete Nzambe alukaka kaka mabunga na biso, mpe alingaka kaka kopesa biso etumbu soki tosali mabe. Na nsima, nakómaki kotalela ye lokola azalaka mafumafu. Nzambe azali lokola ministre-mokonzi oyo azali kaka kolandela makambo ya bato oyo azali koyangela, kasi amibanzabanzaka mpo na bango te.”​—Raymonde, Canada.

      Bongo yo okanisi nini? Tosengeli mpenza kolinga Nzambe? Banda basiɛklɛ mingi bakristo batunaka motuna wana. Kutu, na ntango ya Moyen-Âge, bakristo mingi ya lokuta bazalaki te kobondela Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Mpo na nini? Bato bazalaki kobanga Nzambe na ndenge ya mabe. Moto moko ya mayele na nkombo Will Durant amonisi likambo yango boye: “Ndenge nini mosumuki akoki kotinda mabondeli na ye epai ya Nzambe oyo azali nsɔmɔ mpe azali mosika mpenza na bato?”

      Nini esali mpenza ete bato bákóma kokanisa ete Nzambe azali “nsɔmɔ mpe mosika na bato”? Biblia eteyaka mpenza nini na ntina na Nzambe? Koyekola solo na ntina na Nzambe ekoki kosalisa yo okóma kolinga ye?

      a Matai 22:37, 38.

  • Liteya ya lokuta oyo elobaka ete Nzambe azali na nkombo te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2013 | 1 Novembre
    • ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MATEYA YA LOKUTA OYO ETINDAKA BATO BÁLINGA NZAMBE TE

      Liteya ya lokuta oyo elobaka ete Nzambe azali na nkombo te

      OYO BATO MINGI BANDIMAKA

      “Toyokani te mpo na koyeba soki Nzambe azali na nkombo, mpe ata soki toyokani, ekozala nkombo nini?”​—David Cunningham, profɛsɛrɛ ya teoloji.

      OYO BIBLIA ELOBI

      Nzambe alobaki ete: “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai.” (Yisaya 42:8) Na Ebre nkombo “Yehova” elimboli “Akómisaka”.

      Yehova alingaka tósalela nkombo na ye. Biblia elobi ete: “Bóbelela nkombo na ye. Bóyebisa bato ya bikólo misala na ye. Bóloba ete nkombo na ye etombwani likoló.”​—Yisaya 12:4.

      Yesu azalaki kosalela nkombo ya Nzambe. Na libondeli moko, ayebisaki Yehova boye: “Nayebisi bango [bayekoli ya Yesu] nkombo na yo mpe nakoyebisa yango.” Mpo na nini Yesu ayebisaki bayekoli na ye nkombo ya Nzambe? Abakisaki boye: “Mpo bolingo oyo olingaki [Nzambe] ngai na yango ezala na kati na bango mpe ngai na bomoko elongo na bango.”​—Yoane 17:26.

      MPO NINI EZALI NA NTINA?

      Walter Lowrie, moto moko ya teoloji akomaki boye: “Moto oyo ayebi nkombo ya Nzambe te, akoki mpe te koyeba ete azali solo mpenza mpe akoki kolinga ye te, soki ayebi ye kaka ete azali nguya moko boye.”

      Kobomba nkombo ya Nzambe to kotya nkombo mosusu na esika na yango ezali lokola koboya ete ezala na Biblia

      Moto moko na nkombo Victor azalaki kokende ndako-nzambe pɔsɔ nyonso, kasi azalaki komona ete ayebi mpenza Nzambe te. Alobi boye: “Ntango nayebaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova, yango esalisaki ngai nayeba ye malamu. Namiyokaki lokola nakutani sikoyo na moto oyo nayoká nsango na ye mingi. Nayaki koyeba ete azali mpenza mpe nakómaki moninga na ye.”

      Yehova apusanaka penepene na bato oyo basalelaka nkombo na ye. Mpo na baoyo “bakanisaka nkombo na ye,” Nzambe apesi elaka oyo: “Nakomonisela bango motema mawa, ndenge moto amoniselaka mwana na ye oyo azali kosalela ye motema mawa.” (Malaki 3:16, 17) Nzambe apambolaka mpe baoyo babelelaka nkombo na ye. Biblia elobi ete: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.”​—Baroma 10:13.

  • Liteya ya lokuta oyo elobaka ete Nzambe azali libombami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2013 | 1 Novembre
    • ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MATEYA YA LOKUTA OYO ETINDAKA BATO BÁLINGA NZAMBE TE

      Liteya ya lokuta oyo elobaka ete Nzambe azali libombami

      OYO BATO MINGI BANDIMAKA

      Mangomba ya bokristo “misato ya minene, elingi koloba Katolike, Ɔrtɔdɔkse mpe Protesta endimaka ete Nzambe azali na bapersona misato: Nzambe Tata, Nzambe Mwana mpe Nzambe Elimo Santu. Mateya ya teoloji emonisi ete yango elakisi te ete bazali banzambe misato, kasi elimboli nde ete bango nyonso misato bazali kaka eloko moko.”​—The New Encyclopædia Britannica.

      OYO BIBLIA ELOBI

      Yesu, Mwana ya Nzambe alobá ata mbala moko te ete ye ná tata na ye bazali kaka moto moko. Kutu, alobaki nde: “Nazali kokende epai ya Tata, mpo Tata aleki ngai.” (Yoane 14:28) Ayebisaki mpe moyekoli na ye moko ete: “Nazali komata epai ya Tata na ngai mpe Tata na bino mpe epai ya Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino.”​—Yoane 20:17.

      Elimo santu ezali moto te. Bakristo ya liboso “batondaki na elimo santu,” mpe Yehova alobaki ete: “Nakosopela bato ya ndenge nyonso ndambo ya elimo na ngai.” (Misala 2:1-4, 17) Elimo santu ezali te eteni ya Trinite. Ezali nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala.

      MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

      Karl Rahner mpe Herbert Vorgrimler, bato ya mayele ya Katolike balobi ete ‘bato bakoki koyeba te liteya ya Trinite soki Nzambe alakisi bango te, mpe ata soki alakisi bango bakokoka te koyeba yango malamumalamu.’ Okoki mpenza kolinga moto oyo ezali mpenza mpasi koyeba ye to kososola makambo na ye? Liteya ya Trinite ekangelaka bato nzela ya koyeba mpe kolinga Nzambe.

      Marco, oyo tolobelaki na lisolo ya liboso, amonaki ete liteya ya Trinite epekisaka mpenza moto koyeba Nzambe. Alobi boye: “Nakanisaki ete Nzambe azalaki kobombela ngai ndenge azali mpe yango esalaki ete akóma mpenza mosika na ngai, azala libombami mpe ezala mpasi mpo na kopusana penepene na ye.” Nzokande, “Nzambe azali Nzambe ya mobulungano te.” (1 Bakorinti 14:33, Biblia American Standard Version) Abombelá biso te ndenge azali. Alingi tóyeba ye. Yesu alobaki ete: “Tosambelaka oyo toyebi.”​—Yoane 4:22.

      Marco alobi ete: “Ntango nayebaki ete Nzambe azali eteni ya Trinite te, yango esalisaki ngai nakóma moninga na ye.” Soki tozali te kotalela Yehova lokola eteni moko ya Trinite to libombami moko boye, ekozala pɛtɛɛ mpenza tólinga ye. Biblia elobi ete: “Moto oyo alingaka te ayebi Nzambe te, mpo Nzambe azali bolingo.”​—1 Yoane 4:8.

  • Liteya ya lokuta oyo etindaka bato bákanisa ete Nzambe azali motema mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2013 | 1 Novembre
    • ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MATEYA YA LOKUTA OYO ETINDAKA BATO BÁLINGA NZAMBE TE

      Liteya ya lokuta oyo etindaka bato bákanisa ete Nzambe azali motema mabe

      OYO BATO MINGI BANDIMAKA

      “Nsima ya liwa, milimo ya bato ya masumu ekendaka na lifelo, esika oyo banyokwamaka na ‘mɔtɔ ya seko.’” (Katekisimo ya Lingomba ya Katolike) Bakonzi mosusu ya mangomba balobaka ete lifelo elimboli kozala mosika na Nzambe.

      OYO BIBLIA ELOBI

      “Molimo oyo esali lisumu​—yango nde ekokufa.” (Ezekiele 18:4) Bakufi “bayebi ata eloko moko te.” (Mosakoli 9:5) Soki molimo ekufaka mpe eyebaka eloko moko te, ndenge nini ekoki konyokwama na “mɔtɔ ya seko” to mpe koyoka mpasi ya kozala mosika na Nzambe libela na libela?

      Na Biblia, maloba ya Ebre mpe ya Grɛki oyo ebongolamaka na “lifelo” elimbolaka nkunda ya bato nyonso. Na ndakisa, ntango Yobo atungisamaki makasi na maladi, abondelaki ete: “Nakosepela obomba ngai na nkunda [“lifelo,” Biblia Douay-Rheims Version].” (Yobo 14:13, Biblia Holy Bible​—Easy-to-Read Version) Yobo azalaki na mposa ya kopema na nkunda, kasi te na esika ya minyoko to kozala mosika na Nzambe.

      MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

      Koyoka ete Nzambe azali motema mabe esalaka ete tópusana te penepene na ye; kasi nde ekimisaka biso. Rocío, oyo afandaka na Mexique alobi boye: “Banda bomwana, bateyaki ngai liteya ya lifelo. Nabangaki makasi mpe nakokaki kondima te ete Nzambe azali na bizaleli ya malamu. Nazalaki kokanisa ete azalaka nkandankanda mpe alimbisaka te.”

      Mateya ya polele ya Biblia oyo elobeli bitumbu ya Nzambe mpe ndenge bakufi bazalaka ebongolaki lolenge Rocío azalaki kotalela Nzambe. Alobi boye: “Nayokaki lokola nazwi bonsomi, lokola balongoli ngai kilo moko boye ya monene. Nakómaki kondima ete Nzambe alukaka bolamu na biso, alingaka biso mpe nakoki kolinga ye. Azali lokola Tata oyo asimbi bana na ye na lobɔkɔ mpe alukaka bolamu na bango.”​—Yisaya 41:13.

      Bato mingi basambelaka Nzambe kaka mpo babangaka lifelo, kasi Nzambe alingaka te osalela ye mpo ozali na nsɔmɔ na ye. Kutu, Yesu alobaki ete: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo.” (Marko 12:29, 30) Lisusu, soki tondimisami lelo oyo ete Nzambe asalaka te makambo oyo ezangi bosembo, tokoki kotya motema ete akosambisa makambo na bosembo na mikolo ezali koya. Ndenge moko na Elihu, moninga ya Yobo, tokoki koloba na bosembo ete: “Nzambe ya solo akoki kosala mabe ata moke te, mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoki ata moke te kosala makambo oyo ezangi bosembo!”​—Yobo 34:10.

  • Solo ekoki kopesa yo bonsomi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2013 | 1 Novembre
    • ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MATEYA YA LOKUTA OYO ETINDAKA BATO BÁLINGA NZAMBE TE

      Solo ekoki kopesa yo bonsomi

      Mokolo moko na Yerusaleme, Yesu azalaki kolobela makambo ya Tata na ye Yehova mpe komonisa polele mateya ya lokuta ya bakonzi ya mangomba ya ntango na ye. (Yoane 8:12-30) Makambo oyo alobaki mokolo wana eteyi biso ndenge ya kotalela mateya ya Nzambe oyo bato mingi bandimaka. Yesu alobaki boye: “Soki botikali na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.”​—Yoane 8:31, 32.

      Soki “botikali na kati ya liloba na ngai.” Na maloba wana, Yesu amonisaki likambo oyo ekoki kosalisa biso tóyeba soki mateya ya mangomba ezali “solo” to te. Ntango oyoki liteya moko na ntina na Nzambe, omituna boye: ‘Yango eyokani na maloba ya Yesu mpe na makambo mosusu oyo Makomami mosantu elobi?’ Landá ndakisa ya baoyo bazalaki koyoka mateya ya ntoma Paulo mpe bazalaki “kotalela Makomami malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango [makambo oyo bazalaki koyekola] ezali bongo.”​—Misala 17:11.

      Ntango Batatoli ya Yehova bakómaki koyekola na bango Biblia, Marco, Rosa, mpe Raymonde, oyo tolobelaki na lisolo ya ebandeli batalelaki malamumalamu mateya ya mangomba na bango. Balobi nini?

      Marco: “Ndeko oyo azalaki koteya biso Biblia azalaki kosalela Makomami mpo na koyanola na mituna nyonso oyo ngai ná mwasi na ngai tozalaki na yango. Bolingo na biso mpo na Yehova ekómaki makasi, mpe ngai ná mwasi na ngai tokómaki kolingana makasi!”

      Rosa: “Liboso, nazalaki kokanisa ete Biblia ezali kaka mwa buku moko ya filozofi oyo esalelaka makanisi ya bato mpo na kolimbola soki Nzambe azalaka ndenge nini. Mokemoke, nazwaki biyano ya Biblia na mituna na ngai. Sikoyo, namonaka ete Yehova azali mpenza. Nakoki mpenza kotyela ye motema.”

      Raymonde: “Nabondelaki Nzambe asalisa ngai nayeba ye. Eumelaki te, ngai ná mobali na ngai tobandaki koyekola Biblia. Nsukansuka, toyebaki solo na ntina na Yehova! Totondaki mpenza na esengo ntango toyebaki bizaleli na ye ya malamu.”

      Biblia emonisi biso polele mateya ya lokuta oyo bato balobaka mpo na Nzambe, mpe eteyi biso bizaleli na ye ya kitoko. Ezali Liloba na ye, mpe esalisaka biso “tóyeba makambo oyo Nzambe apesi biso na boboto.” (1 Bakorinti 2:12) Mpo na nini te otala yo moko ndenge Biblia epesi biyano na mituna ya ntina mingi oyo bato mingi bamitunaka mpo na Nzambe, mokano na ye mpe avenire na biso? Tángá biyano na mituna yango mosusu na www.pr418.com na esika bakomi: “Mateya ya Biblia > Biyano na mituna ya Biblia.” Okoki mpe kokomela biso na site oyo to kosɛnga Motatoli ya Yehova moko ayekola na yo Biblia. Tozali na elikya ete soki osali bongo, okomona ete ezali mpenza mpasi te mpo oyeba Nzambe mpe okóma kolinga ye.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto