Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 162
  • Biblia elobi nini mpo na likambo etali kolongola zemi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia elobi nini mpo na likambo etali kolongola zemi?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Ntango nini bomoi ya moto ebandaka?
  • Nzambe akoki kolimbisa moto oyo así alongolá zemi?
  • Ezali mabe kolongola zemi soki bomoi ya mama to ya mwana ezali na likama?
  • Kolongola zemi
    Lamuká!—2017
  • Kosopa zemi​—⁠Yango ezali nde mwango ya malamu?
    Lamuká!—1995
  • Kosopa zemi
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Kosopa zemi—Yango nde nzela mokuse ya kosilisa mikakatano?
    Lamuká!—2009
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 162
Mwasi moko oyo azali na zemi atɛlɛmi liboso ya talatala

Biblia elobi nini mpo na likambo etali kolongola zemi?

Eyano ya Biblia

Biblia esaleli te maloba “kolongola zemi” mpo na kolobela kobimisa na makasi mwana oyo abandi kosalema na libumu ya mama. Kasi, bavɛrsɛ mingi ya Biblia emonisi ndenge Nzambe atalelaka bomoi ya moto, ata mpe ya mwana oyo azali naino na libumu ya mama.

Bomoi ezali likabo ya Nzambe. (Ebandeli 9:6; Nzembo 36:9) Nzambe atalelaka bomoi nyonso ete ezali na valɛrɛ mpenza, ata mpe ya mwana oyo azali naino na libumu ya mama na ye. Yango wana, koboma na nko nyonso mwana oyo azali naino na libumu, ezali koboma moto.

Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele elobaki ete: “Soki bato babundi mpe batuti mpenza mwasi ya zemi mpe bana na ye babimi kasi likama ya liwa ebimi te, bakokatela ye mpenza lomande ndenge nkolo ya mwasi yango akosɛnga; mpe asengeli kopesa yango na nzela ya basambisi. Kasi soki likama ya liwa ebimi, boye osengeli kopesa molimo mpo na molimo.”​—Kobima 21:22, 23.a

  • Ntango nini bomoi ya moto ebandaka?

  • Nzambe akoki kolimbisa moto oyo así alongolá zemi?

  • Ezali mabe kolongola zemi soki bomoi ya mama to ya mwana ezali na likama?

Ntango nini bomoi ya moto ebandaka?

Ntango kaka mama azwi zemi, Nzambe amonaka ete bomoi ya moto ebandi. Na Biblia, Nzambe alobelaka mwana oyo abotami naino te lokola moto mobimba. Tótalela mwa bandakisa oyo emonisi ete mwana oyo azali naino na libumu ya mama mpe mwana oyo así abotami bazali ndenge moko na miso ya Nzambe.

  • Na litambwisi ya elimo santu, Mokonzi Davidi alobaki na Nzambe boye: “Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki.” (Nzembo 139:16) Nzambe azalaki kozwa Davidi lokola moto mobimba liboso kutu abotama.

  • Liboso mosakoli Yirimia abotama, Nzambe ayebaki ete akopesa ye mokumba moko ya ntina mingi. Nzambe alobaki na ye ete: “Liboso nasala yo na kati ya libumu, nayebaki yo, mpe liboso obima na libumu, nasantisaki yo. Nakómisaki yo mosakoli epai ya bikólo.”​—Yirimia 1:5.

  • Luka, mokomi moko ya Biblia, oyo azalaki monganga, asalelaki liloba moko ya Grɛki mpo na kolobela mwana oyo azali naino na libumu ya mama mpe mwana oyo auti kobotama.​—Luka 1:41; 2:12, 16.

Nzambe akoki kolimbisa moto oyo así alongolá zemi?

Nzambe akoki kolimbisa baoyo basí balongolá zemi. Soki bakómi kotalela sikoyo bomoi ndenge Nzambe atalelaka yango, basengeli te komimona ete bazali na ngambo. “Yehova azali na motema mawa mpe na ngɔlu . . . Se ndenge epai moi ebimaka ezali mosika mingi na epai moi elalaka, ndenge yango nde atye mosika na biso ebele ya misala na biso ya kobuka mibeko.”b (Nzembo 103:8-12) Yehova akolimbisa baoyo nyonso babongoli mpenza motema mpo na masumu na bango ya kala, ata mpe baoyo balongolá zemi.​—Nzembo 86:5.

Ezali mabe kolongola zemi soki bomoi ya mama to ya mwana ezali na likama?

Na kotalela oyo Biblia elobi mpo na bomoi ya mwana oyo azali naino na libumu ya mama, likama oyo ekoki kokómela mama to mwana epesi moto nzela te ya kolongola zemi.

Bongo soki na ntango ya kobota, bomoi ya mama ná ya mwana ezali na likama mpe minganga batuni soki bábikisa mama to mwana? Baoyo likambo ya bongo ekómeli bango nde bakoki kopona bomoi ya nani bakobikisa.

a Mabongoli mosusu emonisaka lokola ete na mobeko yango likama ezalaki nde soki mama akufi, kasi te mwana oyo azali naino na libumu. Nzokande, makomi ya Ebre ezali kolobela likama oyo esali ete mama to mwana akufa.

b Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.​—Nzembo 83:18.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto