-
Moninga mabeLamuká!—2010 | Juillet
-
-
Moninga mabe
Azali “moninga” moko oyo boyebanaki ntango ozalaki naino elenge. Azalaki kotinda yo omiyoka ete okoli mpe ondimami na bilenge mosusu. Soki okómi na mitungisi, okokaki ntango nyonso koluka ye mpo apesa yo mwa “makasi.” Kutu, okómaki koluka lisalisi na ye na makambo mingi.
Kasi na nsima, oyaki komona makambo na ye ya mabe. Alingi kozala na yo ntango nyonso, ata soki kozala na ye na bisika mosusu ezali kobimisa yo mabe. Mpe ata soki asalisaki yo omiyoka ete okoli, abebisi mpe nzoto na yo. Longola yango, ayibá ndambo ya mbongo oyo ozwaka na mosala.
Kala te outi komeka kokata boyokani ná ye, kasi alingi kotika yo te. Tokoki koloba ete okómi moombo na ye. Obandi koyoka mawa ndenge boyebanaki na ye.
WANA ezali boyokani oyo bato mingi bazalaka na yango na likaya. Nsima ya komɛla likaya mbula 50, mwasi moko na nkombo Earline alobi boye: “Kozala na likaya ezalaki kosalisa ngai mingi koleka kozala na moto mosusu. Likaya ezalaki kaka moninga na ngai ya kala te—na bantango mosusu yango moko kaka nde ezalaki moninga na ngai.” Kasi, ndenge Earline ayaki komona yango, likaya ezali moninga ya mabe mpe oyo akoki komemela moto likama. Kutu, maloba wana ya ebandeli etali mpenza Earline—longola kaka likambo moko. Ntango ayebaki ete komɛla likaya ezali mabe na miso ya Nzambe mpo ebebisaka nzoto oyo Nzambe apesá biso, atikaki momeseno yango.—2 Bakorinti 7:1.
Mobali moko na nkombo Frank mpe azwaki ekateli ya kotika likaya mpo asepelisa Nzambe. Kasi, mokolo soki moko nsima ya komɛla likaya na ye ya nsuka, ayaki komona ete azali konguluma na ndako na ye mpo na koluka biteni ya makaya oyo ekweákweá na kati ya mabaya. Frank alobi boye: “Na ntango wana nde nazwaki ekateli. Ntango nayaki komona ete nazali konguluma na nse mpe kolukaluka biteni ya makaya ya kala, namiyokaki mbindo. Banda wana, namɛlá lisusu likaya te.”
Mpo na nini ezalaka mpasi kotika likaya? Minganga bamoni bantina mingi: (1) Likaya ekoki kokómisa moto moombo ndenge bangi esalaka. (2) Nicotine oyo ekɔti na nzoto ekoki kokóma na bɔɔngɔ nsima ya seconde nsambo mpamba. (3) Mbala mingi komɛla likaya ekómaka momeseno na bomoi ya moto, mpo akomɛla yango ntango azali kolya, komɛla masanga, kosolola na baninga, mpo na kolongola mitungisi, mpe bongo na bongo.
Kasi, ndenge Earline ná Frank bamonisi yango, moto akoki kolongwa na boombo yango ya mabe. Soki yo mpe omɛlaka likaya kasi olingi kotika yango, kotánga masolo oyo elandi ekoki kosalisa yo obanda bomoi ya sika.
-
-
Kangamá na ekateli na yoLamuká!—2010 | Juillet
-
-
Kangamá na ekateli na yo
“Likambo moko ya ntina mingi oyo bamɛli-makaya oyo balongaki kotika yango basalaki ezali ete bakangamaki na ekateli na bango.”—Buku “Tiká komɛla likaya sikoyo!”
NA MOKUSE, soki olingi kotika komɛla likaya, osengeli, na ebandeli mpenza, kozala na ekateli makasi ya kosala yango. Nini ekoki kopesa yo makasi ya kokangama na ekateli na yo? Ya liboso, tótala matomba oyo okozwa soki otiki komɛla likaya.
Okobatela mbongo na yo. Komɛla pakɛ moko na mokolo ekoki kolya yo mbongo ebele na mbula moko. “Nayebaki te mbongo boni nazalaki kobebisa na likaya.”—Gyanu, Népal.
Okozala na esengo mingi na bomoi. “Bomoi na ngai ebandaki mpenza ntango natikaki komɛla likaya, mpe ezali kobonga se kobonga.” (Regina, Afrika ya Sudi) Ntango moto atiki likaya, akómaka koyoka mpenza elɛngi ya bilei mpe nsolo ya biloko, mpe mbala mingi akómaka nzoto makasi mpe komonana malamu na miso ya bato.
Nzoto na yo ekoki kokóma kolɔngɔnɔ. “Soki moto atiki likaya, azala mobali to mwasi ya mbula nini, aumelaka te kokóma na nzoto kolɔngɔnɔ.”—Centre américain d’épidémiologie.
Okoyeba komityela motema. “Natikaki komɛla likaya mpo nalingaki te ete ekóma nkolo na ngai. Nalingaki ngai moko natambwisa nzoto na ngai.”—Henning, Danemark.
Ekozala na matomba mpo na libota mpe baninga na yo. “Likaya . . . ebebisaka kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato oyo bazali pembeni na yo. . . . Minganga bamoná ete milinga ya likaya oyo moto mosusu azali komɛla ebomaka bankóto ya bato mbula na mbula na maladi ya kanser ya mimpululu (poumons), mpe maladi ya motema.”—Société américaine du cancer.
Okosepelisa Mozalisi na yo. “Bandeko ya bolingo, tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni.” (2 Bakorinti 7:1) “Bókaba nzoto na bino mbeka . . . ya bosantu, oyo Nzambe akoki kondima.”—Baroma 12:1.
“Ntango kaka nayekolaki ete Nzambe aboyaka biloko oyo ekómisaka nzoto mbindo, nazwaki ekateli ya kotika likaya.”—Sylvia, Espagne.
Kasi, mbala mingi kozwa ekateli mpamba ekoki te. Tokoki mpe kozala na mposa basusu básalisa biso, na ndakisa libota mpe baninga na biso. Bakoki kosala nini?
-
-
Luká lisalisiLamuká!—2010 | Juillet
-
-
Luká lisalisi
“Soki moto akoki kolonga moto oyo azali kaka ye moko, bato mibale bakoki kotɛlɛmɛla ye.”—Mosakoli 4:12.
SOKI bato mosusu bazali kosalisa biso, ekoki kokóma pɛtɛɛ mpo na kolonga monguna—ata soki azali ndenge nini. Na yango, soki olingi kolonga kotika likaya, ekozala malamu osɛnga libota mpe baninga na yo básalisa yo—ata mpe moto mosusu oyo akolinga mpenza kosalisa yo mpe akozala na motema molai.
Okoki mpe koluka lisalisi ya bato oyo balongá kotika likaya, mpo bakoki koyeba malamu komitya na esika na yo mpe kosalisa yo. Torben, mokristo moko na Danemark alobi boye: “Lisalisi ya basusu ezalaki na ntina mingi mpo na ngai.” Abraham, oyo afandaka na Inde, akomaki boye: “Bolingo ya solosolo oyo libota mpe bandeko na ngai bakristo bamoniselaki ngai esalisaki ngai natika likaya.” Kasi, na bantango mosusu, ata lisalisi ya libota mpe baninga ezalaka kaka moke.
Mobali moko na nkombo Bhagwandas alobi boye: “Namɛlaki likaya mbula 27; kasi ntango nayekolaki oyo Biblia elobi mpo na mimeseno ya mbindo, nazwaki ekateli ya kotika. Nazalaki komɛla lisusu mingi te. Nazwaki baninga ya sika. Nasɛngaki toli. Kasi, esimbaki te. Kasi, mokolo moko na butu, nafungolelaki Yehova Nzambe motema na ngai na libondeli mpe nasɛngaki ye asalisa ngai natika likaya. Nde nsukansuka, nalongaki!”
Likambo mosusu ya ntina oyo okoki kosala ezali komibongisa mpo na mikakatano oyo okokutana na yango. Mikakatano nini? Lisolo elandi oyo elobeli yango.
[Etanda na lokasa 5]
OSENGELI KOSALELA BANKISI?
Biloko mosusu oyo bato basalelaka mpo na kotika likaya, na ndakisa mwa bande oyo ezali na nicotine, oyo babambaka na lobɔkɔ (patch à la nicotine), ekómi kotɛkama mingi. Liboso osalela yango, talelá mituna oyo:
Bolamu na yango nini? Balobaka ete bankisi mosusu ekoki kosalisa yo mingi mpo ekitisaka mposa ya komɛla likaya. Kasi, bato mosusu bazali kondima te ete esalisaka mpenza mpo na ntango molai.
Makama na yango nini? Bankisi mosusu ebimisaka makambo mosusu ya mabe, na ndakisa mposa ya kosanza, konyokwama na makanisi, mpe makanisi ya komiboma. Kobosana mpe te ete kosalela biloko mosusu oyo ezali na nicotine na esika ya komɛla likaya, ezali kaka kokɔtisa nicotine na nzoto na ndenge mosusu, mpe ezali na likama mpo na nzoto. Na yango, moto oyo azali kosalela yango, azali kaka moombo na yango.
Mayele mosusu ezali? Ankɛtɛ moko emonisi ete bato mingi (88 %) oyo balongaki kotika likaya balobaki ete batikaki komɛla likaya mbala moko kozanga kosalela bankisi mosusu.
-
-
Omibongisa mpo na mikakatanoLamuká!—2010 | Juillet
-
-
Omibongisa mpo na mikakatano
“Nazwaki ekateli ya kotika likaya mpo nabatela bebe na ngai oyo nautaki kobota. Mpo na yango, natyaki elembo moko na ndako na biso oyo epekisaki komɛla likaya. Ngonga moko mpamba na nsima, mposa makasi ya nicotine eyelaki ngai lokola tsunami, mpe napelisaki likaya.”—Yoshimitsu, Japon.
NDENGE ndakisa ya Yoshimitsu emonisi yango, kotika likaya ezalaka na mikakatano. Longola yango, minganga bamonisi ete bato mingi mpenza (pene na 90 %) oyo bakweaki mbala moko bazongelaki momeseno na bango. Yango wana, soki ozali koluka kotika likaya, okoki kolonga soki omibongisi mpo na mikakatano. Mikakatano nini eyaka mbala mingi?
Mposa makasi ya nicotine: Mbala mingi ekómaka makasi na mokolo ya misato nsima ya kotika likaya mpe ekitaka nsima ya pɔsɔ soki mibale. Moto moko oyo azalaki komɛla likaya kala alobi ete na ntango yango “mposa eyaka lokola mbonge; kasi na nsima ekitaka.” Nzokande, ata nsima ya bambula, okoki mbala moko koyoka mposa ya komɛla likaya. Soki esalemi bongo, kowela komɛla te. Zelá miniti mitano to koleka; mposa yango ekoleka.
Makambo mosusu oyo emonisaka ete ozali na mposa: Na ebandeli, ekoki kozala mpasi mpo moto azala ekɛngɛ to atya makanisi nyonso na likambo oyo azali kosala mpe mbala mosusu akoki kokóma monene. Akoki mpe koyoka motó mpasi, mikosa, mitɔki, kosukosu, mpe akoki kokóma na bizaleli mosusu, lokola motema mokuse, nkandankanda, to mpe konyokwama na makanisi. Atako bongo, makambo yango mingi ekitaka nsima ya pɔsɔ minei to motoba.
Na ntango yango ya mpasi, talá mwa makambo oyo ekoki kosalisa yo:
● Laláká mingi.
● Mɛláká mai mingi to jus. Lyáká bilei ya malamu.
● Saláká mwa ngalasisi.
● Bendáká mpema makasi, mpe moná na makanisi ndenge mimpululu na yo etondi na mopɛpɛ ya pɛto.
Makambo oyo ekoki kolamusa mposa: Makambo mosusu to mayoki mosusu ekoki kolamusa mposa ya komɛla likaya. Na ndakisa, mbala mosusu omɛlaka likaya ntango ozali komɛla masanga. Soki ezali bongo, ntango ozali kotika komɛla likaya, komɛla masanga malɛmbɛmalɛmbɛ te. Ya solo, nsima ya mikolo, okoki kozongela komɛla masanga ntango molai.
Atako bongo, bɔɔngɔ na yo ekoki kokoba kokanisa mimeseno mosusu ata ntango molai nsima ya kotika likaya. Torben alobi boye: “Mbula 19 yango oyo banda natiká likaya, kasi nayokaka kaka mposa ya komɛla likaya ntango nazali kopema mwa moke na mosala.” Kasi mbala mingi, nsima ya mikolo mposa ya komɛla likaya ntango ozali kosala makambo moko boye ekitaka mpe esilaka.
Kasi mpo na masanga ezalaka bongo te. Ntango ozali koluka kotika likaya, ekoki kosɛnga otika komɛla masanga mpe kokende na bisika oyo batɛkaka yango, mpo bato mingi bazongelaka momeseno ya komɛla likaya ntango bazali komɛla masanga. Mpo na nini ezalaka bongo?
● Ata mwa masanga moke ebakisaka elɛngi oyo eutaka na nicotine.
● Mbala mingi, bato oyo bazali komɛla masanga esika moko, bamɛlaka mpe likaya.
● Masanga ekitisaka bososoli mpe elongolaka nsɔni. Yango wana Biblia elobi ete: ‘Vinyo elongolaka makanisi ya malamu.’—Hosea 4:11.
Bato oyo ozalaka na bango: Yebá kopona. Na ndakisa, boyá kozala mpambampamba na bato oyo bamɛlaka likaya to oyo bakoki kotinda yo omɛla. Longola yango, kozala te elongo na bato oyo bakoki koluka kolɛmbisa ekateli na yo ya kotika likaya, oyo bakoki kotyola yo mpo na yango.
Mayoki: Ankɛtɛ moko emonisi ete bato mingi oyo bazongelaki komɛla likaya bazalaki komitungisa to bazalaki na nkanda liboso bákwea. Soki likambo moko elamusi kati na yo mposa ya komɛla likaya, longolá makanisi na likambo yango—okoki komɛla mai, kotafuna bazoka, to kobima mpo na kotambola. Salá makasi otondisa bɔɔngɔ na yo na makanisi ya malamu, na ndakisa okoki kobondela Nzambe to kotánga Biblia mwa moke.—Nzembo 19:14.
Koluka komilongisa te
● Nakobenda kaka mbala moko.
Likambo ya solo: Kobenda kaka mbala moko ekoki kosepelisa ba-nerf mosusu ya bɔɔngɔ na yo esika nicotine ekɔtaka, na boumeli ya ngonga misato. Mbala mingi, yango etindaka moto azongela likaya.
● Likaya esalisaka ngai nalongola mitungisi.
Likambo ya solo: Minganga bamonisi ete nicotine ebakisaka nde ba-hormone oyo esalaka ete moto amitungisa. Koyoka ete mitungisi ekiti mwa moke ekoki kozala ete mposa ya komɛla nde ekiti.
● Namesaná na likaya; nakokoka kotika te.
Likambo ya solo: Makanisi ya mabe ebebisaka ekateli. Biblia elobi boye: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.” (Masese 24:10) Na yango, tiká kokanisa ete okolonga te. Moto nyonso oyo alingi mpenza kotika likaya mpe oyo asaleli mitinda ya malamu, na ndakisa oyo tolobeli na zulunalo oyo, akoki kolonga.
● Nazali kokufa na mposa.
Likambo ya solo: Ezali solo ete mposa ya komɛla ezalaka makasi, kasi ekitaka nsima ya mwa bapɔsɔ. Kangamá na ekateli na yo! Soki mposa ya komɛla ezongeli yo nsima ya basanza to ya bambula, yango mpe ekoleka, mbala mosusu nsima ya mwa miniti moke—soki opelisi likaya te.
● Nazali na maladi ya motó.
Likambo ya solo: Soki ozali kozwa nkisi mpo na maladi ya motó, na ndakisa ozali konyokwama na makanisi to ozali na maladi babengi schizophrénie, sɛngá monganga na yo asalisa yo otika likaya. Akolinga kaka kosalisa yo; mbala mosusu akoki kopesa yo nkisi mosusu mpo ebatela yo mpo maladi na yo ekóma makasi te to mpe mpo bankisi esala yo mabe mingi te ndenge otiki komɛla likaya.
● Soki nakwei, nakomona ete nalongi te.
Likambo ya solo: Soki likambo moko ekweisi yo mpe omɛli likaya—ndenge ekómelaka bato mingi oyo bazali koluka kotika likaya—elimboli te ete elikya ezali te mpo na yo. Tɛlɛmá kaka mpe kende liboso. Kokwea mbala moko elimboli te ete olongi te. Kolonga te ezali nde kotikala na nse. Na yango, kobá kobunda. Nsukansuka, okolonga!
Talá ndakisa ya Romualdo, oyo amɛlaki likaya mbula 26 mpe atiká eleki mbula 30. Akomi boye: “Nayebaki lisusu te mbala boni nakweaki. Mbala yango nyonso, nazalaki komiyoka mabe, lokola nde nakolonga te. Kasi, ntango nazwaki ekateli makasi ya kokóma na boyokani malamu na Yehova Nzambe mpe nabondelaki ye mbala na mbala asalisaki ngai, mpe nsukansuka nalongaki kotika likaya mpo na libela.”
Na lisolo oyo ekolanda, tokotalela mwa makanisi oyo ekoki kosalisa yo ozala moto ya esengo, oyo atiká komɛla likaya.
[Etanda/Elilingi na lokasa 7]
MAKAYA NYONSO EBOMAKA
Bato basalelaka mitindo ndenge na ndenge ya makaya. Makaya mosusu etɛkamaka ata na bisika batɛkaka biloko ya kolya to bankisi ya bonkɔkɔ. Atako bongo, OMS (Organisation mondiale de la santé) elobi ete “makaya nyonso ebomaka.” Moto akoki kokufa ata na maladi nini oyo likaya epesaka, na ndakisa kanser mpe maladi ya motema. Mama oyo azali komɛla likaya akoki kobebisa mwana oyo azali naino na libumu. Wapi mitindo ya makaya oyo basalelaka mingi?
Bidis: Yango ezali mwa likaya oyo balíngaka na mabɔkɔ mpe basalelaka yango mingi na mikili ya Azia. Biloko ya mabe oyo ezalaka na milinga ya bidis, biloko lokola gudrɔ, nicotine, mpe monoxyde de carbone eleki kutu oyo ezalaka na sigarɛti.
Cigare: Basalaka yango na tumbako mpe balíngaka yango kaka na nkasa ya tumbako. Na bokeseni na likaya oyo esɛngaka kopelisa mpe kobenda, soki moto atye cigare na monɔkɔ, nicotine na yango ekɔtaka na nzoto ata soki apelisi yango te.
Kretek: Yango ezalaka tumbako oyo basangisi na mwa bikelakela mosusu, mingimingi fololo babengi clous de girofle. Biloko ya mabe oyo ezalaka na milinga na yango, biloko lokola gudrɔ, nicotine, mpe monoxyde de carbone eleki kutu oyo ezalaka na sigarɛti.
Mobokolo (pipe): Kosalela yango ezali na makama ndenge moko na sigarɛti, mpamba te yango mpe epesaka bakanser mpe bamaladi mosusu.
Makaya oyo bapelisaka te: Na ndakisa tumbako ya zolo, oyo ya monɔkɔ, to gutka (oyo basalelaka na Azia). Nicotine na yango ekɔtaka na makila na nzela ya monɔkɔ. Mitindo yango ya makaya ezali kaka mabe lokola makaya mosusu.
Mibokolo oyo ezalaka na mai: Na biloko yango, milinga ya likaya elekaka na mai liboso moto amɛla yango. Atako bongo, ekitisaka bapwazɔ te oyo ekɔtaka na mimpululu, oyo mosusu epesaka kanser.
[Etanda/Elilingi na lokasa 8]
KOSALISA MOTO ATIKA LIKAYA
● Zalá na makanisi ya malamu. Eleki malamu kopesa moto longonya mpe kolendisa ye na esika ya kotya ye mpanzi likoló to kopamela ye. Koloba ete “Nayebi ete okoki kolongola soki omeki lisusu” eleki malamu na esika ya koloba ete: “Okwei lisusu!”
● Yebá kolimbisa. Salá makasi olimbisa moto oyo azali kotika likaya soki asilikeli yo. Salelá maloba ya boboto lokola, “Nayebi ete ezali mpasi, kasi nazali kosepela mingi ndenge ozali kosala yango.” Koloba ata mokolo moko te ete, “Nazalaki kosepela na yo ntango ozalaki komɛla likaya!”
● Zalá moninga ya solosolo. Biblia elobi boye: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17) Moniselá “ntango nyonso” moto oyo azali kotika likaya motema molai mpe boboto—ata na ngonga nini to soki makanisi na ye ezali ndenge nini.
-
-
Okoki kolonga!Lamuká!—2010 | Juillet
-
-
Okoki kolonga!
OYO ezali ntango oyo osengeli ‘kozala na mpiko mpe kosala.’ (1 Ntango 28:10) Makambo nini ya nsuka osengeli kosala mpo okoka kolonga?
Tyá mokolo. Ebongiseli oyo etalelaka kolɔngɔnɔ ya nzoto na États-Unis elobi ete soki kaka ozwi ekateli ya kotika likaya, mokolo oyo okotya mpo na kotika komɛla likaya esengeli kozala na kati ya pɔsɔ mibale banda ntango ozwi ekateli. Na ndenge yango, ekateli na yo ekotikala makasi. Komá mokolo yango, yebisá baninga na yo, mpe kangamá na mokolo yango ata soki makambo ebongwani.
Komá makambo oyo ekosalisa yo otika. Na mokanda yango, okoki kokoma likambo nyonso oyo ekoki kolendisa ekateli na yo, bakisá mpe makambo oyo:
● Ntina oyo olingi kotika likaya
● Banimero ya telefone ya bato oyo okobenga soki oyoki mposa makasi ya likaya
● Makanisi oyo ekosalisa yo okokisa mokano na yo, ata mpe bavɛrsɛ ya Biblia lokola Bagalatia 5:22, 23
Memáká mokanda yango esika nyonso, mpe tángáká yango mbala mingi na mokolo. Ata soki otiki likaya, kobá kotángaka mokanda yango soki oyoki mposa ya likaya.
Tiká mokemoke makambo oyo etindaka yo omɛla. Liboso mokolo oyo otyaki ekóma, bandá naino na kotika mimeseno mosusu. Na ndakisa, soki omɛlaka ntɔngɔ nyonso ntango kaka okiti na mbeto, bandá komɛla nsima ya ngonga moko to koleka. Soki omɛlaka likaya ntango ozali kolya to nsima ya kolya, tiká kosala bongo. Tiká kokende na bisika oyo bato bamɛlaka makaya. Mpe lobáká ntango nyonso yo moko ete: “Te, nakozwa te. Namɛlaka lisusu te.” Makambo ya ndenge wana ekobongisa yo mpo na mokolo oyo okotika komɛla. Kasi, ekosalisa yo mpe obosana te ete mosika te, okokóma momɛli ya kala ya makaya.
Omibongisa. Wana mokolo na yo ezali kopusana, bongisá mwa biloko oyo okobanda kotya na monɔkɔ na esika ya likaya: mwa carotte, bazoka, mbila, mpe bongo na bongo. Yebisá lisusu baninga mpe libota na yo mokolo oyo okotika mpe ndenge oyo bakoki kosalisa yo. Mokolo moko liboso, bwaká biloko oyo otyaka putulu ya likaya, eloko oyo opelisaka na yango likaya, mpe biloko mosusu oyo ekoki kozala motambo, na ndakisa basigarɛti na ndako, na motuka, na mabenga na yo, to na esika na yo ya mosala. Mpamba te kosɛnga moninga na yo sigarɛti to kosomba yango ezali mpasi koleka kozwa yango na tiroir! Longola yango, kobá kobondela Nzambe asalisa yo; saláká yango mingi koleka nsima ya likaya na yo ya nsuka.—Luka 11:13.
Bato ebele mpenza bakatá boyokani na bango na likaya, oyo azalaki moninga na bango, moninga mabe oyo akokaki komemela bango likama. Yo mpe okoki kolonga. Soki osali bongo, okozala na nzoto kolɔngɔnɔ mpe okoyoka ete okómi na bonsomi.
[Elilingi na lokasa 9]
Zaláká ntango nyonso na mokanda na yo, mpe tángáká yango mbala mingi na mokolo
-