Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 32
  • Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Badati ya Biblia emonisi nini mpo na mobu 1914?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini?—Eteni 2
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Bokonzi ya Nzambe eleki na makambo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • 1914—Mobu ya ntina mingi na bisakweli ya Biblia
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 32
Liteya 32. Mokonzi Yesu Kristo na likoló asimbi lingenda ya bokonzi mpe azali koyangela mabele.

LITEYA 32

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na likoló na mobu 1914. Na ntango yango mpe mikolo ya nsuka ya boyangeli ya bato ebandaki. Ndenge nini toyebi yango? Tótalela makambo oyo Biblia esakolaki, makambo oyo ezali kosalema na mokili mpe bizaleli oyo bato bakómá na yango banda 1914.

1. Biblia esakolaki nini?

Mokanda ya Danyele emonisi ete Bokonzi ya Nzambe esengelaki kobanda koyangela na nsuka ya eleko oyo ebengami “ntango nsambo.” (Danyele 4:16, 17) Basiɛklɛ na nsima, Yesu abengaki eleko yango “ntango oyo etyamá ya bikólo,” mpe ateyaki ete eleko yango esukaki naino te. (Luka 21:24) Ndenge tokomona yango, bantango nsambo yango esukaki na 1914.

2. Makambo nini ezali kosalema na mokili mpe bizaleli nini bato bakómi na yango banda 1914?

Bayekoli ya Yesu batunaki Yesu boye: “Elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe eleko ya nsuka ya mokili?” (Matai 24:3) Yesu ayebisaki bango makambo mingi oyo ekosalema ntango akokóma Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe mpe akobanda koyangela na likoló. Na kati ya makambo yango, tokoki kotánga: bitumba, nzala, mpe koningana ya mabele. (Tángá Matai 24:7.) Biblia esakolaki mpe bizaleli oyo bato bakozala na yango na “mikolo ya nsuka,” oyo ekosala ete bomoi ekóma “mpasi mpenza.” (2 Timote 3:1-5) Makambo yango mpe bizaleli yango ekómaki komonana polele mingimingi banda 1914.

3. Mpo na nini mokili ebebá makasi banda Bokonzi ya Nzambe ebandá koyangela?

Mwa moke nsima ya kokóma Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe, Yesu abundaki na Satana ná bademo na likoló. Kasi, Satana alongaki etumba yango te. Biblia elobi ete ‘abwakami na mabele, mpe baanzelu na ye babwakami na nse elongo na ye.’ (Emoniseli 12:9, 10, 12) Satana azali na nkanda makasi mpo ayebi ete akobomama. Yango wana abimisaka bampasi mpe minyoko na mabele mobimba. Yango nde ntina oyo mokili ebebá makasi. Kasi Bokonzi ya Nzambe ekosilisa bampasi yango nyonso.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba mpo na nini tolobi ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914, mpe soki yango etali yo na nini.

4. Badati oyo Biblia epesi emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914

Talá VIDEO.

VIDEO: Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914 (5:02)

Na ndɔtɔ moko, Nzambe alakisaki Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone ya kala, makambo oyo esengelaki kosalema na mikolo ezali koya. Ndimbola oyo Danyele apesaki na ndɔtɔ yango emonisi ete ndɔtɔ yango etali boyangeli ya Nebukadenezare mpe Bokonzi ya Nzambe.​—Tángá Danyele 4:17.a

Tángá Danyele 4:20-26, mpe na nsima salelá etanda mpo na koyanola na mituna oyo elandi:

  • (A) Nebukadenezare alɔtaki nini? ​—Talá vɛrsɛ 20 mpe 21.

  • (B) Nini esengelaki kokómela nzete yango?​—Talá vɛrsɛ 23.

  • (C) Nini esengelaki kosalema na nsuka ya “ntango nsambo”?​—Talá vɛrsɛ 26.

Boyokani oyo ezali kati na nzete ya ndɔtɔ ná Bokonzi ya Nzambe

ESAKWELI (Danyele 4:20-36)

Bokonzi

(A) Nzete moko ya monene

Nzete moko ya monene.

Bokonzi esuki

(B) “Bókata nzete yango,” tii ‘ntango nsambo ekoleka’

Bakangi nsinga ya ebende mpe ya motako (cuivre) na eteni moko ya nzete.

Bokonzi ezongisami

(C) “Okozongela bokonzi na yo”

Nzete moko ya monene.

Na kokokisama ya liboso . . .

  • (D) Nzete yango emonisi nani?​—Talá vɛrsɛ 22.

  • (E) Ntango nini bokonzi na ye esukaki? ​—Tángá Danyele 4:29-33.

  • (F) Nini ekómelaki Nebukadenezare na nsuka ya “ntango nsambo”? ​—Tángá Danyele 4:34-36.

KOKOKISAMA YA LIBOSO

Bokonzi

(D) Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone

Mokonzi Nebukadenezare atɛlɛmi na lolendo nyonso.

Bokonzi esuki

(E) Nsima ya 606 L.T.B., Nebukadenezare abungisaki mayele ya bomoto mpe akokaki lisusu kozala mokonzi te na boumeli ya mbula nsambo

Nebukadenezare afandi na nse mpe azali kolya matiti lokola nyama.

Bokonzi ezongisami

(F) Nebukadenezare azongeli mayele ya bomoto mpe azongeli bokonzi na ye

Nebukadenezare azali kotala likoló mpe atomboli mabɔkɔ mpo na kokumisa Nzambe.

Na kokokisama ya mibale . . .

  • (G) Nzete yango emonisi banani? ​—Tángá 1 Ntango 29:23.

  • (H) Ntango nini bokonzi na bango esukaki? Ndenge nini toyebi ete bokonzi yango ezongisamaki te tii ntango oyo Yesu azalaki awa na mabele? ​—Tángá Luka 21:24.

  • (I) Ntango nini mpe esika nini bokonzi yango ezongisamaki?

KOKOKISAMA YA MIBALE

Bokonzi

(G) Bakonzi ya Yisraele oyo bazalaki komonisa Bokonzi ya Nzambe

Bakonzi ya Yisraele bafandi na bakiti ya bokonzi. Pole ya Nzambe ezali likoló na bango.

Bokonzi esuki

(H) Yerusaleme ebebisami, mpe yango ekataki molɔngɔ ya bakonzi ya Yisraele na boumeli ya bambula 2 520

Yerusaleme ya kala ezali kopela mɔtɔ. Na nsima, bambula 2 520 eleki.

Bokonzi ezongisami

(I) Yesu abandi koyangela na likoló lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe

Yesu afandi na kiti ya bokonzi na likoló mpe azali koyangela banda 1914 T.B. Azali kongɛngisa pole.

Ntango nsambo ezali bambula boni?

Bavɛrsɛ mosusu ya Biblia esalisaka biso tóyeba malamumalamu bavɛrsɛ mosusu. Na ndakisa, mokanda ya Emoniseli elobi ete ntango misato ná ndambo ezali mikolo 1 260. (Emoniseli 12:6, 14) Na yango, mbula nsambo ezali mikolo 1 260 mbala mibale, to mikolo 2 520. Ntango mosusu na Biblia, maloba “mokolo moko” emonisaka mbula moko. (Ezekiele 4:6) Na yango, ntango nsambo oyo mokanda ya Danyele elobeli ezali bambula 2520.

5. Mokili ebongwaná banda 1914

Talá VIDEO.

VIDEO: Mokili ebongwaná banda 1914 (1:10)

Yesu asakolaki makambo oyo ekomonana polele na mokili ntango akokóma Mokonzi. Tángá Luka 21:9-11, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Na makambo oyo Yesu asakolaki, makambo nini ozali komona to koyoka?

Ntoma Paulo amonisaki ndenge bizaleli ya bato ekozala na mikolo ya nsuka ya boyangeli ya bato. Tángá 2 Timote 3:1-5, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Bizaleli nini ozali komona lelo epai ya bato?

Bililingi: Bililingi oyo ezali komonisa makambo oyo ezali kosalema na mokili mpe bizaleli ya bato na mikolo ya nsuka. 1. Mokonzi moko ya basoda atɛlɛmi na estrade, atomboli mabɔkɔ mpe azali koganga. 2. Ndako moko ebukani nsima ya koningana ya mabele. 3. Baaviɔ ya basoda. 4. Bato bazali kotambola mpe balati ba masque. 5. Bandako mibale ya milai na New York ezali kopela mɔtɔ mpo na bateroriste. 6. Mobali moko azali kokɔtisa drɔgɛ na misisa ya nzoto na ye. 7. Mobali moko azali na nkanda mpe alingi kobɛta mwasi na ye likofi. 8. Badrɔgɛ, masanga makasi mpe bilangwiseli mosusu. 9. Basi mibale bazali komikanga fɔtɔ. 10. Moto moko azali kobinisa bato na esika babɛtaka miziki. 11. Moto moko azali kobwaka molangi moko oyo ezali kopela mɔtɔ.

6. Koyeba ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela esengeli kopesa biso makasi

Tángá Matai 24:3, 14, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mosala nini ya ntina mingi emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela?

  • Ndenge nini okoki kopesa mabɔkɔ na mosala yango?

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela, mpe etikali moke eyangela mabele mobimba. Tángá Baebre 10:24, 25, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mokomoko na biso asengeli kosala nini lokola “tozali komona mokolo yango ezali kopusana”?

Bililingi: 1. Moyekoli moko ya Biblia ayei na makita ya Batatoli ya Yehova. 2. Moyekoli yango azali kosakwela moninga na ye.

Soki oyebi likambo moko oyo ekosalisa basusu mpe ekobikisa bomoi na bango, okosala nini?

SOKI MOTO ATUNI YO: “Mpo na nini Batatoli ya Yehova balobelaka mingi mobu 1914?”

  • Okoyebisa ye nini?

NA MOKUSE

Bisakweli ya Biblia, badati, mpe makambo oyo ezali kosalema na mokili emonisi polele ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela sikoyo. Tokomonisa ete tondimaka likambo yango soki tozali kosakola nsango ya Bokonzi yango mpe tozali koyangana na makita ya lisangá.

Bozongeli

  • Nini esalemaki na nsuka ya ntango nsambo oyo mokanda ya Danyele elobeli?

  • Nini endimisi yo ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914?

  • Ndenge nini okoki komonisa ete ondimaka ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá makambo oyo bato ya istware mpe bato mosusu balobi mpo na mbongwana oyo esalemi na mokili banda 1914.

“Ntango nini bizaleli ya bato ekómaki mpenza kobeba?” (Lamuká! ya 04/2007)

Talá ndenge esakweli oyo ezali na Matai 24:14 ebongolaki bomoi ya moto moko.

“Nalingaki lisano ya Baseball koleka eloko nyonso!” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli No. 3 2017)

Ndenge nini toyebi ete esakweli oyo ezali na Danyele mokapo 4 etali Bokonzi ya Nzambe?

“Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini? (Eteni 1)” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2014)

Nini emonisi ete “ntango nsambo” oyo Danyele mokapo 4 elobeli esukaki na 1914?

“Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini? (Eteni 2)” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/2014)

a Talá masolo mibale ya nsuka oyo ezali na eteni “Makanisi mosusu” ya liteya oyo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto