-
Kobota mbuma mpe kokóma baninga ya YesuYesu azali nzela, solo mpe bomoi
-
-
“Etape nyonso oyo ezali na ngai, oyo ebotaka mbuma te, [Tata na ngai] alongolaka yango, mpe nyonso oyo ebotaka mbuma, apɛtolaka yango, mpo ebota mbuma mingi lisusu. . . . Lokola etape ekoki kobota mbuma yango moko te kozanga kokangama na nzete ya vinyo, bino mpe ndenge moko bokoki kobota mbuma te, soki botikali na bomoko elongo na ngai te. Ngai nazali nzete ya vinyo, bino bozali bitape.”—Yoane 15:2-5.
-
-
Kobota mbuma mpe kokóma baninga ya YesuYesu azali nzela, solo mpe bomoi
-
-
Alimboli: “Moto oyo atikali na bomoko elongo na ngai, mpe ngai na bomoko elongo na ye, moto wana akobota mbuma mingi; mpo, soki botiki ngai, bokoki kosala eloko moko te.” “Bitape” yango, to bayekoli na ye ya sembo, bakobota mbuma mingi, elingi koloba bakomekola bizaleli ya Yesu, bakosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na molende, mpe bakokómisa bato bayekoli. Nini ekokómela moto oyo atikali na bomoko na Yesu te mpe aboti mbuma te? Yesu alobi: “Soki moto atikali na bomoko elongo na ngai te, akobwakama.” Abakisi ete: “Soki botikali na bomoko elongo na ngai mpe soki maloba na ngai efandi na kati na bino, bósɛnga eloko nyonso oyo bolingi mpe ekosalema mpo na bino.”—Yoane 15:5-7.
-