Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yehova alingaka baoyo ‘babotaka mbuma wana bazali koyika mpiko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli)—2018 | Mai
    • 7. (a) Na ndakisa ya Yesu, “mosali-bilanga,” “nzete ya vinyo,” mpe “bitape” ezali komonisa banani? (b) Motuna nini esengeli tózwa eyano na yango?

      7 Tángá Yoane 15:1-5, 8. Na ndakisa wana, Yesu amonisaki ete Yehova azali “mosali-bilanga,” Yesu ye moko azali “nzete ya vinyo,” mpe bayekoli na ye bazali “bitape.”b Na nsima, Yesu ayebisaki bantoma na ye ete: “Tata na ngai azali kozwa nkembo na likambo oyo: bókoba kobota mbuma mingi mpe kolakisa mpenza ete bozali bayekoli na ngai.” Na yango, kobota mbuma elimboli nini? Na ndakisa yango, Yesu alobeli te na bosikisiki ndimbola ya kobota mbuma, kasi alobelaki mwa likambo oyo ekoki kosalisa biso tózwa eyano na motuna yango.

      8. (a) Na ndakisa oyo Yesu apesaki, mpo na nini ‘kobota mbuma’ elimboli te kokómisa bato bayekoli? (b) Yehova asɛngaka biso makambo ya ndenge nini?

      8 Yesu alobaki mpo na Tata na ye ete: “Etape nyonso oyo ezali na ngai, oyo ebotaka mbuma te alongolaka yango.” Na maloba mosusu, tokozala basaleli ya Yehova kaka soki tozali kobota mbuma. (Matai 13:23; 21:43) Na yango, na ndakisa wana, kobota mbuma elimboli te kokómisa bato bayekoli. (Matai 28:19) Soki ezalaki bongo, tokoloba ete basaleli ya sembo ya Yehova oyo bakómisà naino moto te moyekoli ya Yesu bazali lokola bitape oyo ebotaka mbuma te. Kasi yango ekoki kozala solo te! Mpo na nini? Mpo tokoki te kotindika bato na makasi bákóma bayekoli. Yehova alingaka biso mingi. Akoki te kotinda biso tósala likambo oyo tokokoka ata moke te. Asɛngaka biso kaka makambo oyo tokokoka kosala.​—Kolimbola Mibeko 30:11-14.

      9. (a) Tobotaka mbuma ntango tosalaka mosala nini? (b) Ndakisa nini tokolobela?

      9 Na yango, kobota mbuma elimboli nini? Na ntembe te ezali likambo oyo moto nyonso akoki kosala. Mosala nini Yehova apesá basaleli na ye nyonso? Mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.c (Matai 24:14) Ndakisa oyo Yesu apesaki ya moloni emonisi yango polele. Tólobela ndakisa yango.

  • Yehova alingaka baoyo ‘babotaka mbuma wana bazali koyika mpiko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli)—2018 | Mai
    • b Atako bitape ezali komonisa bakristo oyo bakokende likoló, kasi ndakisa yango ezali na mateya mingi mpo na basaleli nyonso ya Yehova.

      c Maloba ‘kobota mbuma’ ekoki mpe kolimbola kobota “mbuma ya elimo.” Lisolo oyo mpe oyo elandi ekolobela kobota “mbuma ya mbɛbu,” to kosakola nsango ya Bokonzi ya Nzambe.​—Bagalatia 5:22, 23; Baebre 13:15.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto