‘Bókóba kolimbisana bamoko na bamosusu’
“Bókóba koyikanaka mpiko mpe kolimbisana bamoko na bamosusu.”—BAKOLOSE 3:13, NW.
1. (a) Ntango Petelo apesaki likanisi ete tólimbisaka basusu “mbala nsambo,” mpo na nini akokaki kokanisa ete azalaki mpenza moto malamu? (b) Yesu alingaki komonisa nini ntango alobaki ete tosengeli kolimbisa “mbala ntuku nsambo na nsambo”?
“NKOLO, soko ndeko na ngai akosalela ngai mabe, nalimbisa ye mbala boni? Kino mbala nsambo?” (Matai 18:21) Mbala mosusu Petelo akanisaki ete azalaki mpenza moto malamu na likanisi oyo apesaki. Na ntango wana, momeseno ya Balabi ezalaki ete moto akoki kolimbisama te koleka mbala misato mpo na mabe bobele moko.a Na bongo, kanisá kokamwa ya Petelo ntango Yesu azongiselaki ye ete: “Nalobi na yo te kino mbala nsambo, kasi, kino mbala ntuku nsambo na nsambo”! (Matai 18:22, NW) Kozongelama ya motángo nsambo elingaki komonisa ete “mbala na mbala.” Mpo na Yesu, ndelo ezali te na motángo ya mbala oyo moklisto asengeli kolimbisa basusu.
2, 3. (a) Na makambo nini ekoki komonana ete ezali mpasi mpo na kolimbisa basusu? (b) Mpo na nini tokoki komindimisa ete kolimbisa basusu ezali mpo na bolamu na biso?
2 Nzokande, kosalela toli yango, ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te. Nani kati na biso ayoká naino te mpasi oyo eutaka na likambo moko basaleli ye na kozanga bosembo? Ekoki kozala ete moto oyo otyelaki motema abimisi sɛkɛlɛ́ moko oyo oyebisaki ye. (Masese 11:13) Maloba makasi ya moninga moko ya motema mbala mosusu ‘eswaki yo lokola mbeli.’ (Masese 12:18) Mbala mosusu moto moko oyo ozalaki kolinga to kotyela motema asali yo likambo moko ya mabe oyo epesi yo mpasi mingi. Ntango makambo motindo wana mabimi, tokoki koyoka nkanda. Tokoki mbala mosusu koboya kosolisa ye, to lisusu kolinga kozala na ye esika moko te. Kolimbisa ye, ekoki komonana lokola ete apesameli etumbu te na mabe oyo asali. Nzokande, na kokangáká nkanda, tokosuka bobele na kominyokola biso moko.
3 Na bongo, Yesu ateyi biso ete tólimbisaka—“kino mbala ntuku nsambo na nsambo.” Ya solo mateya na ye ekosala biso mabe soko moke te. Makambo nyonso oyo ateyaki eutaki epai ya Yehova, ‘Ye oyo akolakisa biso mpo na litomba’ na biso mpenza. (Yisaya 48:17; Yoane 7:16, 17) Ya solo, ezali litomba mpo na biso ete tólimbisaka basusu. Yambo ete tólobela mpo na nini tosengeli kolimbisa, mpe lolenge nini tokoki kolimbisa, ezali malamu ete tólimbola liboso bolimbisi mpe oyo ezali bolimbisi te. Likanisi na biso na ntina na bolimbisi ekoki kozala na bopusi na likoki na biso ya kolimbisa ntango basusu basali biso mabe.
4. Kolimbisa basusu elimboli likambo nini te, kasi kolimbisa elimboli nini?
4 Kolimbisa basusu mabe oyo basali biso elingi koloba te ete tozali kokanga miso to kotyola likambo oyo basali biso; elingi mpe koloba te ete tozali kopesa bango nzela ete bámonela biso. Nzokande, ntango Yehova alimbisaka biso, atyolaka masumu na biso te, mpe apesaka nzela soko moke te ete bato na masumu bátalela ngɔlu na ye mpamba. (Baebele 10:29) Engebene búku Insight on the Scriptures, bolimbisi elimboli “kolimbisa moto oyo asali mbeba; kotika kokangela ye nkanda mpo na mabe na ye mpe koboya kosɛnga mbano.” (Volimi 1, lokasa 861)b Biblia ezali kopesa biso bantina ebongi mpo na kolimbisa basusu.
Mpo na nini kolimbisa basusu?
5. Ntina monene nini ya kolimbisa basusu emonisami na Baefese 5:1?
5 Ntina monene ya kolimbisa basusu elobelami na Baefese 5:1 (NW): “Na bongo, bókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana balingami.” Na likambo nini tosengeli ‘kokóma bamekoli ya Nzambe’? Liloba “na bongo” ezali kokangisa elobeli yango na vɛrsɛ́ oyo ezali liboso, oyo elobi ete: “Bózalanaka na boboto, moko epai na mosusu, na motema na mawa, na kolimbisana moko moko pelamoko Nzambe asili kolimbisa bino kati na Klisto.” (Baefese 4:32) Ɛɛ, na oyo etali kolimbisa, tosengeli kokóma bamekoli ya Nzambe. Lolenge moko mwana mobali amekaka kozala lokola tata na ye, biso mpe, tozali bana oyo Yehova alingaka mingi, na yango tosengeli kosepela kokóma lokola Tata na biso ya likoló oyo alimbisaka. Yehova asepelaka mingi wana azali kotala na mabelé mpe azali komona bana na ye bazali kosala milende ya komekola ye na kolimbisanáká bamoko na bamosusu, boye te?—Luka 6:35, 36; kokanisá na Matai 5:44-48.
6. Bokeseni monene nini ezali kati na lolenge Yehova alimbisaka mpe lolenge biso tolimbisaka?
6 Ya solo, tokokoka soko moke te kolimbisa na lolenge ya kokoka lokola Yehova. Kasi, yango ezali ntina mosusu oyo tosengeli kolimbisana. Tótalela likambo yango: Bokeseni ezali kati na bolimbisi ya Yehova mpe bolimbisi ya biso. (Yisaya 55:7-9) Ntango biso tolimbisi baoyo basaleli biso mabe, mbala mingi toyebaka ete ata ndele tokozala na mposa ete bango mpe bálimbisa biso. Lokola tozali bato, ezali sé likambo ya basumuki oyo bazali kolimbisana bango na bango. Nzokande, mpo na Yehova, bolimbisi ezali bobele ngámbo moko. Ye alimbisaka biso, kasi biso tokoki kolimbisa ye ata mokolo moko te. Soki Yehova, oyo asalaka masumu te, akoki na bolingo nyonso mpe na mobimba kolimbisa biso, na yango, biso bato ya masumu tosengeli mpenza kolimbisana, boye te?—Matai 6:12.
7. Soki toboi kolimbisa basusu ntango ntina ya komonisa ngɔlu ezali, lolenge nini yango ekobebisa boyokani na biso na Yehova?
7 Likambo mosusu eleki ntina ezali ete, soki tozali koboya kolimbisa basusu ntango ntina moko ezali mpo na komonisa ngɔlu, yango ekoki mpenza kobebisa boyokani na biso na Nzambe. Yehova asɛngaka te bobele ete tólimbisanaka; amizelaka mpe ete tólimbisa. Engebene Makomami, ntina oyo esengeli kopusa biso na kolimbisa ezali mpo ete Yehova akoka mpe kolimbisa biso to mpo ete asili kolimbisa biso. (Matai 6:14; Malako 11:25; Baefese 4:32; 1 Yoane 4:11) Na yango, soki toboi kolimbisa basusu ntango ntina mpenza ya kolimbisa ezali, tokoki mpenza komizela ete Yehova alimbisa biso?—Matai 18:21-35.
8. Mpo na nini kolimbisa ezali na matomba malamu mpo na biso?
8 Yehova ateyaka basaleli na ye “nzela malamu ete bátambola kati na yango.” (1 Mikonzi 8:36) Ntango azali kolakisa biso ete tólimbisanaka, tosengeli komindimisa ete azali kosala yango mpo na bolamu na biso. Biblia ezali na elónga lokola ezali koyebisa biso ete ‘tótika nkanda.’ (Baloma 12:19) Nkanda ezali bozito monene mpo na komema yango na bomoi ya moto. Soki tokangi nkanda, ebebisaka makanisi na biso, elongolaka biso kimya, mpe ebebisaka esengo na biso. Nkanda oyo eumeli, lokola zúwa, ekoki kobimisa mikakatano na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na biso. (Masese 14:30) Mpe na ntango tozali kokóba kokanga nkanda, moto oyo asali biso mabe akoki mbala mosusu koyeba te mpasi oyo tozali koyoka! Mozalisi na biso oyo atondi na bolingo ayebi ete tosengeli kolimbisa basusu polele bobele mpo na litomba na bango te kasi mpe mpo na litomba na biso moko. Toli ya Biblia oyo etali kolimbisa ezali mpenza ‘nzela malamu mpo na kotambola.’
‘Bókóba koyikanaka mpiko bamoko na bamosusu’
9, 10. (a) Makambo nini esɛngaka mpenza te bolimbisi ntango nyonso? (b) Makanisi nini mamonisami na elobeli oyo ete “bókóba koyikanaka mpiko bamoko na bamosusu”?
9 Moto akoki kozoka mpota ya mike to mpota ya minene, mpe nyonso etyelamaka likebi ndenge moko te. Ezali mpe bongo mpo na mpota ya mayoki—ekoki kozala moke to monene. Tosengeli mpenza kosala ete mwa mbeba nyonso moke ekóma likambo monene kati na boyokani na biso na basusu? Mwa koyokisama nkanda moke, masɛki, mpe motungisi ezali makambo oyo makómaka kati na bomoi mpe esengeli mpenza te ete básɛnga biso bolimbisi bongo tólimbisa. Soki toyebani lokola bato oyo baboyaka kosolisa basusu mpo na likambo nyonso ya moke oyo basali biso mpe na yango totingamaka ete básɛnga biso bolimbisi liboso ete tóyokana na bango, tokoki kopusa bango ete bákóma kobanga biso na lolenge ya mabe—to bábanda komitangola na biso!
10 Nzokande, ezali malamu mingi “koyebana lokola moto ya makambo makasi te.” (Bafilipi 4:5, Biblia ya Phillips) Lokola tozali bikelamu ya kozanga kokoka mpe tozali kosala na bomoko, ezali likambo ya kokamwa te ete mbala na mbala bandeko na biso báyokisa biso nkanda, biso mpe mbala mosusu tokoki koyokisa bango nkanda. Bakolose 3:13 epesi biso toli ete: ‘Bókóba kolendisana bamoko na basusu.’ Elobeli wana ezali kopesa likanisi ya kozala na motema molai mpo na basusu, kokanga motema mpo na bizaleli oyo tolingaka te to makambo oyo tokoki komona ete ekopesa biso nkanda. Motema molai mpe komipekisa motindo wana ekoki kosalisa biso ete tóyikela mabunga mikemike ya basusu mpiko—kozanga kobebisa kimya ya lisangá.—1 Bakolinti 16:14.
Ntango mpota ezali monene
11. Ntango basusu basali biso mabe, nini ekoki kosalisa biso ete tólimbisa bango?
11 Nzokande, ezali boni soki basusu basali biso mabe, mpe mpota ezali monene mingi? Soki mbeba ezali monene te, tokoki kozala na mokakatano mingi te ya kosalela toli ya Biblia ya ‘kolimbisana.’ (Baefese 4:32) Kozala na bolingi ya kolimbisa motindo wana ezali na boyokani na maloba mapemami ya Petelo ete: “Liboso na makambo nyonso bólingana makasi, mpo ete bolingo ekozipaka ebele na masumu.” (1 Petelo 4:8) Koyeba ntango nyonso ete biso mpe tozali bato ya masumu, yango esalisaka biso ete tólimbisa mabunga ya basusu. Na yango, ntango tolimbisi, tokolongola nkanda. Na bongo, boyokani na biso na moto oyo asali biso mabe ekobeba te, mpe tokosalisa mpo na kobatela kimya ya lisangá oyo ezali na motuya mingi. (Baloma 14:19) Nsima ya mikolo, tokobosana mabe oyo asalaki biso.
12. (a) Tokoki kosala nini mpo na kolimbisa moto oyo asali biso mabe monene? (b) Na lolenge nini maloba ya Baefese 4:26 mazali komonisa ete tosengeli kosilisa matata noki?
12 Nzokande, ezali boni soki moto moko asali biso mabe na lolenge eleki ndelo, ayokisi biso mpasi mingi? Na ndakisa, moninga moko oyo otyelaka motema akoki kobimisa makambo mosusu ya nkuku oyo oyebisaki ye. Yango ekoyokisa yo mpenza mpasi, ekotungisa yo mpe okomona ete moninga yango atɛki yo. Omeki kobosana likambo yango, kasi ezali kolongwa te. Na likambo motindo yango, ekosengela na yo mbala mosusu kozwa ekateli ya kosilisa mokakatano, mbala mosusu na kosololáká na moto oyo asali yo mabe. Ezali likambo ya mayele ete osala bongo liboso ete likambo yango ekóma ndóngó. Paulo alendisi biso ete: “Bóyoka nkanda, nde na lisumu te; tiká te ete moi elimwa naino bozali na nkanda na bino.” (Baefese 4:26) Toli ya Paulo ezali lisusu na ntina mingi soki totaleli likambo yango epai na Bayuda, kolala ya moi ezalaki komonisa kosila ya mokolo moko mpe ebandeli ya mokolo mosusu. Na bongo, toli ezali ete: Silisá likambo noki!—Matai 5:23, 24.
13. Ntango tozali kosolola na moto oyo asalaki biso mabe, mokano na biso esengeli kozala nini, mpe makanisi nini makoki kosalisa biso ete tókokisa mokano yango?
13 Lolenge nini osengeli kosolola na moto oyo asali yo mabe. Na 1 Petelo 3:11 (NW) tozali kotánga ete: “Luká kimya mpe landá yango.” Na bongo, mokano na yo ezali te ya kozala na nkanda kasi ya koluka kimya elongo na ndeko na yo. Mpo na yango, ezali malamu mingi kopɛngola maloba makasi mpe kolakisa mosapi; yango ekoki kopesa nzela ete molobani na yo asala mpe bongo. (Masese 15:18; 29:11) Lisusu, esengeli kopɛngola elobeli ya kopelisa mɔ́tɔ lokola, “Yo ozalaka ntango nyonso . . . !” to, “Olingaka soko moke te ko . . . !” Maloba motindo wana makoki bobele kopesa ye nzela ete amilóngisa. Nzokande, salá ete mongongo na yo mpe elongi na yo emonisa ete olingi kosilisa likambo oyo epesi yo mpasi. Lobelá na bosikisiki lolenge ozali koyoka na ntina na likambo oyo esalemaki. Pesá na molobani na yo ntango ya kolimbola likambo oyo asalaki. Yokamelá makambo oyo akoloba. (Yakobo 1:19) Yango ekobimisa litomba nini? Masese 19:11 elimboli ete: “Bososoli na moto na mayele ekozikisa nkanda na ye; nkembo na ye ezali ete akolimbisa masumu.” Kososola mayoki ya molobani na yo mpe bantina ya likambo oyo asalaki ekoki kolongola makanisi mabe mpe mayoki mabe na ntina na ye. Ntango tozali kotalela likambo na mokano ya kotya kimya mpe kobatela yango, na ntembe te matata makoki kosilisama, bolimbisi ekosɛngama mpe mabe ekolimbisama.
14. Ntango tolimbisi basusu, na ndimbola nini tosengeli kobosana?
14 Kolimbisa basusu elimboli ete tosengeli kobosana likambo oyo esalemaki? Tómikundola ndakisa ya Yehova na likambo yango, lokola tolobelaki yango na lisoló lileki. Ntango Biblia elobi ete Yehova abosanaka masumu na biso, yango elimboli te ete akoki te komikundola masumu yango. (Yisaya 43:25) Nzokande, abosanaka na boye ete ntango alimbisi, akotalela biso te na masumu yango na mikolo ya nsima. (Ezekiele 33:14-16) Bobele bongo, kolimbisa baninga na biso bato elimboli te ete tokozala na likoki te ya komikundola likambo oyo basalaki. Nzokande, tokoki kobosana na boye ete tokolinga te kozongela likambo yango lisusu. Na yango, lokola likambo esilaki, ekozala malamu te kobɛtáká masoló na ntina na likambo yango; ekozala mpe ezaleli ya bolingo te soki tokómi kokimakima moto oyo asalaki biso mabe, kotaleláká ye lokola moto oyo abimisami na lisangá. (Masese 17:9) Ya solo, ekoki kokamata mwa ntango mpo ete boyokani na biso na ye ezonga malamu; mbala mosusu tokozala lisusu te na bokangami na ye lokola tozalaki na yango liboso. Kasi tozali ntango nyonso kolinga ye lokola ndeko na biso moklisto mpe tozali kosala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kobatela boyokani ya kimya.—Kokanisá na Luka 17:3.
Ntango kolimbisa ekómi mpasi
15, 16. (a) Esɛngisami na baklisto ete bálimbisa mosali na mabe oyo aboyi kobongola motema? (b) Lolenge nini tokoki kosalela toli ya Biblia oyo ezwami na Nzembo 37:8?
15 Nzokande, ezali boni soki basusu basali biso mabe na lolenge ete epesi biso mpasi mingi koleka, mpe na yango baboi koyambola mbeba na bango, baboi kobongola motema, mpe baboi kosɛnga bolimbisi? (Masese 28:13) Makomami mazali komonisa polele ete Yehova alimbisaka te bato oyo baboi kobongola motema, oyo bazali kosala masumu na nkó. (Baebele 6:4-6; 10:26, 27) Ezali boni mpo na biso? Búku Insight on the Scriptures elobi ete: “Baklisto basɛngisami te kolimbisa baoyo bazali kosala makambo na mayele mabe, bazali kosala masumu na nkó mpe baboi kobongola motema. Bato motindo wana bakómaka banguna ya Nzambe.” (Volumi 1, lokasa 862) Moklisto oyo basali ye mabe eleki ndelo, to makambo ya nsɔ́mɔ asengeli komiyoka te ete asɛngisami kolimbisa moto oyo asali mabe yango mpe aboi kobongola motema.—Nzembo 139:21, 22.
16 Ya solo, baoyo basalelaki bango mabe koleka bakoki kozala na mayoki ya kozokisama mpe ya nkanda. Nzokande, tómikundola ete kokanga nkanda ekoki kosala biso mabe. Soki tozali ntango nyonso kozela ete moto oyo asalaki biso mabe asɛnga bolimbisi mpe asali bongo te, yango ekoki kopesa biso nkanda koleka. Soki tozali kotingama na kolobeláká bokesene oyo basali biso, yango ekosala ete tóyoka bobele nkanda, kútu ekoki kobebisa kolɔngɔ́nɔ́ na biso ya elimo, ya mayoki mpe ya nzoto. Na ndenge yango, tozali kotika nzela na oyo asalaki biso mabe ete akóba koyokisa biso mpasi. Na mayele mpenza, Biblia ezali koloba ete: “Zalá na nkanda te mpe tiká kosilika.” (Nzembo 37:8) Na bongo, baklisto mosusu bamonaki ete na nsima bazalaki na likoki ya kozwa ekateli ya kolimbisa na boye ete bátika kokanga nkanda—kozanga kotyola likambo oyo esalemaki, kasi koboya kozika na nkanda. Kopesáká likambo yango na mobimba na mabɔkɔ ya Nzambe ya boyengebene, bazwaki kobɔndisama mpe bazalaki na likoki ya kokóba kozala na bomoi kozanga mayoki makasi ya nkanda.—Nzembo 37:28.
17. Elaka ya Yehova oyo ezwami na Emoniseli 21:4 ezali kopesa endimiseli nini ya kobɔndisa?
17 Ntango likambo oyo basali biso epesi biso mpasi mingi koleka, mbala mosusu tokolónga te kolongola yango na mobimba kati na makanisi na biso, na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo. Kasi Yehova alaki mokili ya sika oyo kati na yango “akolongola [“akopangusa,” NW] mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.” (Emoniseli 21:4) Ezala likambo nini oyo tokomikundwela na ntango wana, ekopesa biso mpasi te, lokola ekoki kotungisa mitema na biso lelo.—Yisaya 65:17, 18.
18. (a) Mpo na nini esengeli ete tólimbisaka bandeko na biso basi mpe bandeko na biso mibali na boyokani na biso na bango? (b) Ntango basusu basali biso mabe, na lolenge nini tokoki kolimbisa mpe kobosana? (c) Lolenge nini yango ezali na litomba mpo na biso?
18 Wana tozali kozela mokili ya sika, tosengeli kofanda mpe kosala elongo lokola bandeko basi mpe bandeko mibali oyo bazangi kokoka, bato ya masumu. Biso nyonso tosalaka mabunga. Mbala na mbala, tolɛmbisanaka bamoko na basusu mpe kútu toyokisanaka mpasi bamoko na basusu. Yesu ayebaki yango malamu ntango alobaki ete tosengeli kolimbisana bamoko na basusu, “mbala nsambo te, kasi mbala ntuku nsambo na nsambo”! (Matai 18:22) Ya solo, tokokoka te kolimbisa na mobimba mpenza lokola Yehova alimbisaka. Nzokande, mbala mingi ntango bandeko na biso basali biso mabe, tokoki kolimbisa na boye ete tótika kokanga nkanda mpe tokoki kobosana na boye ete tokozongela likambo yango lisusu soko moke te. Na yango, ntango tolimbisi mpe tobosani, tokosunga mpo na kobatela bobele kimya ya lisangá te, kasi mpe kimya na biso moko ya makanisi mpe ya motema. Na koleka, tokozwa kimya oyo bobele Yehova, Nzambe na biso oyo atondi na bolingo nde akoki kopesa.—Bafilipi 4:7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Engebene Talmud ya Bababilone, mobeko moko ya Balabi elobaki ete: “Soki moto moko asali mbeba, mbala ya liboso, ya mibale mpe ya misato, akolimbisama, kasi mbala ya minei akolimbisama te.” (Yoma 86b) Likanisi wana ezwaki moboko na yango na ndimbola mabe ya mikapo lokola Amosa 1:3; 2:6; mpe Yobo 33:29.
b Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Mituna ya bozongeli
◻ Mpo na nini tosengeli kozala na bolingi ya kolimbisa basusu?
◻ Makambo ya motindo nini esɛngaka na biso ete “tókóba koyikanaka mpiko bamoko na basusu”?
◻ Ntango mabe oyo basusu basali biso eyokisi biso mpasi mingi, tokoki kosala nini mpo na kobongisa likambo na kimya?
◻ Ntango tolimbisi basusu, na lolenge nini tosengeli kobosana?
[Elilingi na lokasa 16]
Ntango tozali kokanga nkanda, moto oyo asali biso mabe mbala mosusu azali koyeba te mpasi oyo tozali koyoka
[Elilingi na lokasa 17]
Ntango ozali kosolola na basusu mpo na kotya kimya, okoki mbala mosusu kosilisa matata