LOYEMBO 139
Omimona na mokili ya sika
1. Omimona, moná mpe nga’;
Tozali na mokili ya sika.
Moná ndenge okoyoka
Ntango okofanda na kimya.
Bato mabe bazali te;
Bokonzi ya Nzambe nsuka te.
Talá Paradi Nzambe alakaki!
Tokokumisa Yehova,
tokoyemba:
(MONDIMO)
“Yehova oza’ malamu mpenza.
Osali biloko nyons’a sika.
Toz’oyemba na motema ya esengo;
Tokopesa yo lokumu, nkembo seko.”
2. Omimona, moná mpe nga’;
Talá mokili yango ya sika.
Okoyoka kolela te.
Mpasi mpe kobanga elimwe.
Asemboli hema na ye.
Akokisi maloba na ye.
Asekwisi bato oyo bakufá;
Biso ná bango tokoyemba
n’esengo:
(MONDIMO)
“Yehova oza’ malamu mpenza.
Osali biloko nyons’a sika.
Toz’oyemba na motema ya esengo;
Tokopesa yo lokumu, nkembo seko.”
(Talá mpe Nz. 37:10, 11; Yis. 65:17; Yoa. 5:28; 2 Pe. 3:13.)