LOYEMBO 47
Bondelá Yehova mokolo na mokolo
Ya Papye
1. Bondelá Yah mpo akoyoka yo.
Eza’ lokumu apesi biso.
Fungolelá ye motema na yo,
Akozanga te kosalisa yo.
Bondelá Yah butu moi.
2. Bondelá Yah mpo na kotɔnda ye,
Alimbisaka, yo mpe landá ye.
Mabe tosali, tóyebisa ye.
Toza’ putulu, abosani te.
Bondelá Yah butu moi.
3. Bondelá Yah na ntango ya mpasi.
Ye Tata na yo, Moninga na yo.
Belelá ye, akobatela yo;
Aza’ pene mpo na kosunga yo.
Bondelá Yah butu moi.
(Talá mpe Nz. 65:5; Mat. 6:9-13; 26:41; Luka 18:1.)